Mituna ya batángi . . .
Mpo na nini Batatoli ya Yehova basakolaka ndako na ndako?
▪ Na Biblia, tokokuta etinda oyo Yesu apesaki bayekoli na ye: “Yango wana, bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, . . . bóteya bango.” (Matai 28:19, 20) Etinda yango etaleli bakristo nyonso? Bayekoli ya liboso ya Yesu bayebaki ete ezali bongo. Na ndakisa, ntoma Petro alobaki ete: “[Yesu] apesaki biso mitindo ya kosakwela bato mpe kopesa litatoli malamumalamu.” (Misala 10:42) Mpe ntoma Paulo akomaki boye: “Ezali nde mokumba oyo batye likoló na ngai. Ya solo, mawa na ngai soki nasakoli nsango malamu te!”—1 Bakorinti 9:16.
Kaka Paulo ná Petro te nde batosaki etinda wana ya Yesu, kasi mpe bakristo nyonso ya siɛklɛ ya liboso. Batyaki mosala ya kosakola na esika ya liboso na bomoi na bango. (Misala 5:28-32, 41, 42) Lelo oyo, Batatoli ya Yehova mpe basalaka nyonso básala mpe bongo. Basakolaka kaka nsango oyo Yesu asakolaki, “Bokonzi ya likoló.”—Matai 10:7.
Nsango ya Bokonzi esengeli kosakolama epai ya banani? Yesu amonisaki ete esengeli kosakolama epai ya bato nyonso, na bisika nyonso. Ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bokozala batatoli na ngai . . . tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Misala 1:8) Alobaki kutu na bango ete liboso nsuka ya mokili oyo eya, “nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli.” (Matai 24:14) Mpo na kokokisa etinda wana, bakristo ya siɛklɛ ya liboso basalaki nyonso mpo na kosakwela bato nyonso, kasi te kaka bato oyo bayebani na bango to bato oyo basambelaka te. (Bakolose 1:23; 1 Timote 2:3, 4) Ndenge moko mpe lelo oyo, Batatoli ya Yehova basalaka nyonso básakwela moto nyonso.a
Wapi lolenge oyo eleki malamu ya kopalanganisa nsango ya Bokonzi? Yesu ayebaki ndenge oyo bato mingi bakoki koyoka nsango malamu, yango wana atindaki bayekoli na ye na bingumba, na bamboka mpe na bandako ya bato. (Matai 10:7, 11, 12) Nsima ya liwa mpe lisekwa ya Yesu, bayekoli na ye bakobaki kosakola “ndako na ndako.” (Misala 5:42) Ndenge Yesu asalaki, bango mpe basakolaki bisika nyonso oyo bazalaki kokutana na bato mpe na bisika oyo bato bazalaka mingi. (Yoane 4:7-26; 18:20; Misala 17:17) Lelo oyo, Batatoli ya Yehova basalelaka mpe mayele wana mpo na kosakwela bato nyonso.
Yesu amonisaki ete bato mosusu bakoboya koyoka. (Matai 10:14; 24:37-39) Yango esengeli nde kolɛmbisa bakristo básakola te? Tózwa ndakisa oyo: Soki ozalaki na kati ya bato oyo bakei kosalisa bato oyo bazwi likama mpo mabele eningani makasi, okotika koluka kaka mpo bato moke nde babiki? Te, okokoba koluka soki elikya ya kobikisa bato mosusu ezali. Yesu ayebisaki bayekoli na ye bákoba na mosala yango ntango nyonso oyo bazali na elikya ya kokuta bato mosusu oyo bakondima nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 10:23; 1 Timote 4:16) Ntango Batatoli ya Yehova bazali koluka bato ya ndenge wana ndako na ndako, bazali komonisa ete balingaka Nzambe mpe bazalani na bango, baoyo lobiko na bango etaleli ndenge oyo bakoyoka mpe bakotosa nsango ya Bokonzi.—Matai 22:37-39; 2 Batesaloniki 1:8.
Zulunalo oyo ozali kotánga elobeli nsango yango ya Biblia. Mpo na koyeba makambo mosusu, sololá na Batatoli ya Yehova na mbala ya nsima oyo bakoya kotala yo, to komelá babimisi ya zulunalo oyo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Batatoli ya Yehova bazali sikoyo kosakola na mikili 236. Na mbula oyo eleki, balekisaki ngonga miliare moko na milio nsambo na mosala ya kosakola na mokili mobimba mpe bayekolaki Biblia na bato milio mwambe na ndambo na bandako na bango.