Oyebaki yango?
Mpo na nini bato ya ntango ya kala bazalaki kosalela gudrɔ lokola pɔtɔpɔtɔ?
▪ Biblia elobi boye mpo na bato oyo batongaki ndako molai ya Babele: “Mabanga na bango nde briki, kasi pɔtɔpɔtɔ na bango nde gudrɔ.”—Ebandeli 11:3.
Pɔtɔpɔtɔ yango ezalaki kobima kaka yango moko na mabele. Ezalaki kouta na petrole, mpe na bisika mingi na Mezopotamia ebimaka yango moko na mabele mpe na nsima ekangamaka mpe ekómaka makasi. Ndenge oyo bato ya ntango ya kala bazalaki kosalela yango lokola kole, emonisi ete ezalaki malamu mpenza. Buku moko elobi ete pɔtɔpɔtɔ yango “ebongaki mpo na kotonga bandako oyo esalemi na briki oyo batumbá.”
Na zulunalo moko (Archaeology), balobeli ndenge bauti kotala kala mingi te ndako molai oyo ebukaná babengi ziggourat na engumba ya kala ya Ure, na Mezopotamia. Mokomi ya zulunalo yango alobi boye: “Tii lelo oyo, pɔtɔpɔtɔ ya gudrɔ emonanaka na katikati ya babriki oyo batumbá, oyo liboso bazalaki kozwa yango na esika moko ya monene oyo ebimisaka petrole na sudi ya Irak. Pɔtɔpɔtɔ yango ya moindo, oyo kala ezalaki kosangisa bato ya ekólo yango, lelo oyo, ekɔtisá mobulu na ekólo yango mpe makambo ya politiki ezali kotambola malamu te. Kosalela pɔtɔpɔtɔ yango lokola gudrɔ mpe kotya na yango pavema na banzela, esalisaki mpo mai ekɔta te na babriki ya pɛtɛpɛtɛ oyo bato ya Sumer bazalaki kosala. Babriki yango elingaki kobeba noki soki batongi-ndako básalelaka pɔtɔpɔtɔ yango te.”
“Lokasa” ya ndenge nini bazalaki kosalela na ntango ya kala mpo na kokoma?
▪ Motuna yango ebongi kotunama mpo Yoane, mokomi moko ya Biblia alobaki boye: “Atako nazali na makambo mingi ya kokomela bino, nalingi te kokoma yango na lokasa mpe na mai ya mokanda.”—2 Yoane 12.
Liloba ya Grɛki khartes, oyo ebongolami awa na “lokasa,” emonisaka papye oyo esalemi na papirisi, oyo ezali molona moko oyo ekolaka na kati ya mai. Buku moko elobi boye mpo na mayele oyo bazalaki kosalela mpo na kosala nkasa ya kokoma mikanda na mwa mibimbi ya molona yango: “Mibimbi yango oyo molai na yango ezalaki ntango mosusu mɛtrɛ misato, bazalaki kopalola yango mpe kokata yango mikemike, mpe na nsima, bazalaki kotanda yango likoló ya mosusu, na molɔngɔ, na nsima bazalaki kobɛta yango na marto moko ya monene ya libaya mpe na nsima bazalaki kokómisa yango pɛtɛpɛtɛ na epalola-nzete mpe kobongisa yango mpo na kokoma.”
Bato ya arkeoloji bamoni ebele ya mikanda ya kala ya papirisi na Ezipito mpe pene na Mbu Ekufá (Mer morte). Bapapirisi mosusu oyo bazwi na bisika yango ezalaki ya eleko ya Yesu to liboso mpenza ya eloko yango. Ekoki mpenza kozala ete yango nde basalelaki mpo na kokoma mikanda ya Biblia, na ndakisa, oyo bantoma bakomaki na yango mikanda na bango.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 11]
Spectrumphotofile/photographersdirect.com
© FLPA/David Hosking/age fotostock