Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/7 nk. 23-28
  • “Epai okokende, ngai mpe nakokende”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Epai okokende, ngai mpe nakokende”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Libota ekabwani mpo na likambo moko ya mawa
  • Bolingo ya sembo ya Ruta
  • Ruta ná Naomi na Beteleme
  • “Epai okokende, ngai mpe nakokende”
    Mekolá kondima na bango
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Luta
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • “Mwasi moko malamu mingi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Ruta ná Naomi
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/7 nk. 23-28

Mekolá kondima na bango

“Epai okokende, ngai mpe nakokende”

RUTA azali kotambola elongo na Naomi na nzela moko oyo ekatisi mokili patatalu ya Moabe epai mopɛpɛ ezali makasi. Bazali kaka bango mibale na esobe monene wana. Meká naino komona na makanisi ndenge Ruta amoni ete mpokwa ebandi kokɔta, mpe atali bokilo na ye mpe amituni soki ntango ekoki naino te mpo na koluka esika ya kolala. Alingaka Naomi mingi mpe akoki kosala nyonso mpo na ye.

Basi yango nyonso mibale bazali na mawa makasi. Bambula mingi eleki banda mobali ya Naomi akufá, kasi sikoyo azali nde kolela bana na ye mibale ya mibali Mahalone ná Kilione oyo bauti mpe kokufa. Ruta mpe azali na mawa makasi. Mahalone azalaki mobali na ye. Ye ná Naomi bazali kokende esika moko, na engumba Beteleme, na Yisraele. Atako bazali kokende esika moko, ezali na likambo moko oyo ekesenisi mobembo na bango. Naomi azali kozonga na mboka na ye. Ruta azali kokende esika oyo ayebi te, atiki libota na ye, mokili na ye mpe mimeseno nyonso ya mboka na ye, ata mpe banzambe ya mboka yango.​—Ruta 1:3-6.

Nini ekoki kotinda elenge mwasi andima kosala mbongwana monene ndenge wana? Ndenge nini Ruta akozwa makasi ya kobanda bomoi ya sika mpe kokipe Naomi? Soki tozwi biyano, tokomona makambo mingi oyo tokoki kosala mpo na komekola kondima ya Ruta, moto ya Moabe. Liboso, tótala naino eloko oyo esalaki ete basi wana mibale bátambola na nzela molai oyo ekei tii na Beteleme.

Libota ekabwani mpo na likambo moko ya mawa

Ruta akolaki na Moabe, ekólo moko ya moke oyo ezalaki na ɛsti ya Mbu Ekufá (Mer morte). Mokili yango ezalaki na mabwaku ya minene oyo etondaki na banzete ya mikemike mpe mabulu moko ya minene ekabolaki yango. Mabele ya “mokili ya Moabe” ezalaki ntango nyonso kobota malamu, ata ntango nzala ekɔtaki na Yisraele. Kutu yango nde likambo oyo esalaki ete Ruta ayebana na Mahalone mpe libota na ye.​—Ruta 1:1.

Nzala oyo ekɔtaki na Yisraele etindaki Elimeleke, mobali ya Naomi, alongwa na Yisraele mpe akende kofanda mopaya ye na mwasi na ye ná bana na ye mibale na mokili ya Moabe. Na ntembe te, kokende na mboka mopaya ezalaki komekama monene mpo na kondima ya moto mokomoko ya libota na bango, mpo Bayisraele basengelaki kosambela ntango nyonso na esika mosantu oyo Yehova aponaki. (Kolimbola Mibeko 16:16, 17) Naomi asalaki nyonso mpo na kobatela kondima na ye. Kasi, ayokaki mawa makasi ntango mobali na ye akufaki.​—Ruta 1:2, 3.

Ekoki kozala ete ayokaki lisusu mpasi na motema ntango bana na ye babalaki basi ya Moabe. (Ruta 1:4) Naomi ayebaki ete Abrahama nkɔkɔ na bango, asalaki makasi mpo na kozwela mwana na ye Yisaka mwasi na kati ya bato ya libota na ye, oyo bazalaki kosambela Yehova. (Ebandeli 24:3, 4) Na nsima, Mibeko ya Moize ekebisaki Bayisraele ete bábalisa bana na bango ya mibali mpe ya basi na bapaya te noki bámema bango na losambo ya bikeko.​—Kolimbola Mibeko 7:3, 4.a

Atako bongo, Mahalone ná Kilione babalaki basi ya Moabe. Ata soki likambo yango etungisaki Naomi to esepelisaki ye te, emonani ete asalaki nyonso mpo na komonisela basi ya bana na ye, Ruta ná Orpa, boboto mpe bolingo. Ekoki kozala ete Naomi azalaki na elikya ete mokolo mosusu bango mpe bakosambela Yehova lokola ye. Ezala bongo to te, Ruta ná Orpa bazalaki kosepela na Naomi mingi. Boyokani malamu oyo bazalaki na yango esalisaki bango na ntango ya mpasi. Liboso kutu bilenge basi yango bábota, mibali na bango bakufaki.​—Ruta 1:5.

Lingomba ya Ruta esalisaki ye ayeba oyo akosala soki akutani na likambo ya mpasi ndenge wana? Emonani ete esalisaki ye te. Bato ya Moabe bazalaki kosambela banzambe ebele, oyo alekaki bango nyonso ezalaki Kemoshe. (Mitángo 21:29) Emonani ete lingomba ya bato ya Moabe ezalaki na mobulu mpe na makambo ya nsɔmɔ oyo ezalaki mingi na ntango wana; bazalaki mpe kotumba bana na bango mbeka. Na ntembe te, makambo ya Nzambe ya Yisraele, oyo azali bolingo mpe motema mawa, oyo Ruta ayekolaki epai ya Mahalone to Naomi emonisaki ye ete Yehova akeseni mpenza na banzambe ya Moabe. Yehova azalaki kokamba bato na ye na bolingo, na esika ya kobangisa bango! (Kolimbola Mibeko 6:5) Ekoki kozala ete na ntango wana ya mpasi makasi Ruta akómaki lisusu moninga ya motema ya Naomi mpe azalaki kosepela koyoka ntango mobange mwasi wana azalaki kolobela makambo ya Yehova, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, kolobela misala na ye ya kokamwa, mpe ndenge oyo asalelaki bato na ye makambo na bolingo mpe na motema mawa.

Kasi, Naomi asepelaki ntango ayokaki nsango ya mboka na ye. Mokolo moko ayokaki, ekoki kozala epai ya moto moko ya mombongo oyo asalaka mibembo ete nzala esili na Yisraele. Yehova abandi lisusu kosunga bato na ye. Beteleme ezongelaki lisusu nkombo na yango, oyo elimboli “ndako ya limpa.” Naomi azwi ekateli ya kozonga na mboka na ye.​—Ruta 1:6.

Ruta ná Orpa bakosala nini? (Ruta 1:7) Basalaki boninga makasi na Naomi na boumeli ya ntango wana oyo bazalaki na mpasi. Emonani ete Ruta akómaki moninga ya motema ya Naomi mpo na boboto mpe kondima makasi oyo Naomi azalaki na yango epai ya Yehova. Basi wana misato oyo mibali bakufá basimbaki nzela mpo na kokende na Yuda.

Lisolo ya Ruta emonisi biso ete makambo ya mpasi ekómelaka moto nyonso, ezala moto malamu to moto mabe. (Mosakoli 9:2, 11) Emonisi mpe biso ete na ntango oyo tokutani na mpasi makasi, ekozala malamu tóluka libɔndisi mpe lisungi epai ya basusu, mingimingi epai ya baoyo balukaka libateli epai ya Yehova, Nzambe oyo Naomi azalaki kosambela.​—Masese 17:17.

Bolingo ya sembo ya Ruta

Ntango basi yango misato batambolaki ntaka molai, likambo mosusu ekómaki kotungisa Naomi. Akanisaki bilenge basi yango oyo bazalaki kotambola elongo na ye mpo na bolingo oyo bamoniselaki ye ná bana na ye. Alingaki te ete abakisela bango mpasi mosusu. Soki batiki mboka na bango mpe bakei elongo na ye, akosalela bango nini na Beteleme?

Nsukansuka, Naomi alobaki na bango boye: “Bókende, bózonga, moto na moto na ndako ya mama na ye. Tiká Yehova amonisela bino motema boboto, kaka ndenge bino bomoniselaki mibali oyo sikoyo basili kokufa mpe ngai.” Alobelaki mpe elikya oyo azalaki na yango ete Yehova akofuta bango na ndenge akopesa bango mibali mosusu mpe bomoi ya sika. Lisolo yango elobi ete “bongo apwɛpwaki bango, mpe babandaki kotombola mingongo na bango mpe kolela.” Sikoyo, tomoni ntina oyo Ruta ná Orpa bakangamaki na mwasi oyo ya motema malamu mpe oyo azalaki koluka matomba na ye moko te. Bango nyonso mibale balobaki na Naomi boye: “Te, kasi tokozonga elongo na yo epai ya bato na yo.”​—Ruta 1:8-10.

Ata bongo, Naomi andimaki mbala moko te. Amonisaki bango polele ete akokoka te kosalela bango likambo moko na Yisraele, mpo azali na mobali te oyo akosunga ye, azali mpe na bana ya mibali te oyo bakobala bango mpe elikya ezalaki te mpo na bango. Amonisaki bango ete lokola azali na likoki ya kosalisa bango te, yango ezali kopesa ye mpasi makasi lisusu.​—Ruta 1:11-13.

Orpa amonaki ete Naomi alobi solo. Mama na ye mpe libota na ye bazalaki na Moabe, mpe azalaki na ndako ya kofanda. Amonaki ete kotikala na Moabe ezali malamu koleka. Na mpasi na motema, apwɛpwaki Naomi mpe azongaki.​—Ruta 1:14.

Ruta asalaki nini? Makambo oyo Naomi alobaki, etalaki mpe ye. Kasi, tozali kotánga boye: “Kasi Ruta, akangamaki na ye.” Ntango mosusu Naomi azongelaki kotambola kaka ye moko na nzela, kasi ayaki komona ete Ruta azali kolanda ye nsimansima. Alobaki na ye boye: “Talá! Mbanda na yo, oyo mobali akufá lokola yo, azongi epai ya bato na ye mpe epai ya banzambe na ye. Zongá elongo na mbanda na yo oyo mobali akufá.” (Ruta 1:15) Maloba ya Naomi emonisi baoyo batángaka lisolo yango ntina mpenza oyo alobaki bongo. Orpa azongelaki bato na ye mpe “banzambe na ye.” Orpa asepelaki kokoba kosambela Kemoshe mpe banzambe mosusu ya lokuta. Ruta, akanisaki mpe bongo?

Ntango apusanaki pene na Naomi, na nzela wana oyo moto mosusu azalaki te, Ruta ayebaki oyo motema na ye elingi. Motema na ye elingaki Naomi mpe Nzambe oyo Naomi azalaki kosalela. Yango wana alobaki boye: “Kobondela ngai te ete nasundola yo, nazonga, natika yo; mpo epai okokende, ngai mpe nakokende, epai okolala, ngai mpe nakolala. Bato na yo bakozala bato na ngai, mpe Nzambe na yo Nzambe na ngai. Epai okokufa, ngai mpe nakokufa, mpe kuna nde nakokundama. Tiká Yehova asala ngai bongo mpe abakisa yango, soki eloko mosusu, longola kaka liwa, ekokabola ngai ná yo.”​—Ruta 1:16, 17.

Ruta alobaki mpenza maloba malamu, yango wana ata nsima ya mbula 3 000, bato bayebi kaka maloba yango. Maloba yango emonisaki mpenza ezaleli moko ya malamu mingi, bolingo ya sembo. Bolingo oyo Ruta azalaki na yango epai ya Naomi ezalaki mpenza makasi, mpe ya sembo, yango wana alingaki kotika Naomi te ata soki akokende epai wapi. Kaka liwa nde ekokaki kokabola bango. Bato ya libota ya Naomi bakokóma mpe bato ya Ruta, mpo andimaki mpenza kotika makambo nyonso oyo ayebaki na Moabe, ata mpe banzambe ya Moabe. Na kokesana na Orpa, Ruta alobaki na motema mobimba ete alingaki ete Yehova, Nzambe ya Naomi, azala mpe Nzambe na ye.b

Yango wana, batambolaki, kaka bango mibale na nzela molai oyo ekei tii na Beteleme. Buku moko elobi ete ekoki kozala ete mobembo yango ezwaki bango pɔsɔ mobimba. Boye, mokomoko na bango abɔndisamaki na mpasi oyo azalaki na yango ndenge bazalaki kotambola elongo.

Lelo oyo, bato mingi bazali kokutana na makambo ya mpasi. Na eleko na biso oyo Biblia ebengi “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano,” biso nyonso tokutanaka na makambo ya mawa to ya mpasi. (2 Timote 3:1) Yango wana, ezaleli oyo Ruta azalaki na yango ezali mpenza na ntina mingi lelo oyo. Bolingo ya sembo, bolingo oyo ekangamaka na eloko na yango mpe etikaka yango te ekende, ezali lisalisi monene na mokili mabe oyo. Ezaleli yango ezali na ntina na libala, na boyokani ya libota, na boninga mpe na lisangá ya bokristo. Soki tozali komonisa bolingo ya ndenge wana, tokolanda ndakisa ya Ruta.

Ruta ná Naomi na Beteleme

Koloba ete ozali na bolingo ya sembo, ekeseni na komonisa yango na misala. Ruta azalaki na libaku ya komonisa bolingo ya sembo kaka epai ya Naomi te, kasi mpe epai ya Yehova, Nzambe oyo ye aponaki kosambela.

Nsukansuka, basi yango mibale bakómaki na Beteleme, mboka oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 10, na sudi ya Yerusaleme. Emonani ete Naomi ná libota na ye bayebanaki mingi na engumba ya moke wana, mpo esika yango eninganaki ntango bayoki nsango ete Naomi azongi. Basi ya mboka yango bazalaki kotalatala ye mpe koloba boye: “Oyo nde Naomi?” Emonani ete azalaki lisusu te ndenge azalaki liboso akende na Moabe; elongi na ye mpe bilamba na ye emonisaki ete amonaki mpasi bambula mingi mpe azalaki na mawa makasi.​—Ruta 1:19.

Naomi ayebisaki basi ya libota na ye mpe bato oyo azalaki kofanda na bango kartye moko kala ete bomoi na ye ekómaki bololo. Amonaki kutu ete nkombo na ye esengelaki kolongwa Naomi oyo elimboli “esengo na ngai,” mpe ekóma Mara, oyo elimboli “bololo.” Mawa mpo na Naomi! Ndenge moko na Yobo oyo azalaki na bomoi liboso na ye, azalaki kokanisa ete Yehova Nzambe nde amemeli ye bampasi nyonso wana.​—Ruta 1:20, 21; Yobo 2:10; 13:24-26.

Ntango bango mibale bakómaki kofanda na Beteleme, Ruta akómaki kokanisa ndenge oyo akokipe Naomi mpe ndenge oyo akomikipe ye moko. Ayokaki ete Mobeko oyo Yehova apesaki bato na ye na Yisraele ezali mpe na ebongiseli moko mpo na babola. Bazalaki na ndingisa ya kokende na bilanga na eleko ya kobuka mbuma mpe kolanda babuki-mbuma mpo na kolɔkɔta mbuma oyo etikalaka mpe oyo ebotaka na nsuka ya elanga.c​—Balevi 19:9, 10; Kolimbola Mibeko 24:19-21.

Ezalaki eleko ya kobuka ɔrje, ekoki kozala na sanza ya Aprili na kolanda kalandriye ya lelo, mpe Ruta akendaki na bilanga kotala soki nani akopesa ye nzela ya kolɔkɔta mbuma oyo etikalaka. Kozanga kokana, amonaki elanga ya mobali moko na nkombo Boaze, moto moko ya bomɛngo oyo azalaki ndeko ya Elimeleke, mobali ya Naomi. Atako Mobeko ya Moize epesaki ye lotomo ya kolɔkɔta mbuma, amonaki te ete azali na lotomo yango; asɛngaki nde elenge mobali oyo azalaki na mokumba yango soki akoki mpe kolɔkɔta. Andimaki, mpe Ruta abandaki mbala moko kolɔkɔta mbuma.​—Ruta 1:22–2:3, 7.

Kanisá naino ndenge Ruta azalaki kolanda bato oyo bazalaki kobuka mbuma. Ntango bazali kokata ɔrje na bambeli na bango, Ruta azali kogumbama mpo na kolɔkɔta oyo bakweisi to batiki na nsima na bango, azalaki kosangisa yango mpe kokanga yango mabokemaboke, mpe komema yango na esika oyo akokaki kobɛta yango na nsima mpo na kozwa mbuma. Mosala yango ezalaki kosalema malɛmbɛ, ezalaki kolɛmbisa mpe ezalaki kokóma mpasi mingi na mpokwa. Ata bongo, Ruta akobaki kaka na mosala yango, azalaki kopema kaka mpo na kopangwisa motoki to kolya na kati ya “ndako,” mwa esika oyo ebongisamaki mpo basali bámibatela mpo na moi.

Ntango mosusu Ruta azalaki na elikya te ete bakotyela ye likebi, kasi batyelaki ye yango. Boaze amonaki ye mpe atunaki elenge mobali yango soki Ruta azali nani. Lokola azalaki mobali moko ya kondima makasi, Boaze azalaki kopesa basali na ye, oyo bazalaki kosala mokolo na mokolo to ata mpe bapaya, mbote na maloba oyo: “Yehova azala na bino.” Bazalaki mpe kozongisela ye kaka na maloba ya ndenge wana. Mobali yango, oyo azalaki kolinga Yehova atyelaki Ruta likebi ndenge tata asalaka epai ya mwana na ye.​—Ruta 2:4-7.

Boaze azalaki kobenga Ruta “mwana na ngai,” mpe ayebisaki ye ete akoba koya na elanga na ye mpo na kolɔkɔta mbuma mpe kozala elongo na bilenge basi ya ndako na ye mpo basali mosusu ya mibali bátungisa ye te. Azalaki kosala nyonso mpo azanga eloko ya kolya te soki ngonga ya kolya ekoki. Na nyonso, azalaki kopesa ye longonya mpe kolendisa ye. Ndenge nini?​—Ruta 2:8, 9, 14.

Ntango Ruta atunaki Boaze ete eloko nini mopaya lokola ye asali mpo amonisela ye boboto ya ndenge wana, azongiselaki ye ete ayokaki makambo nyonso oyo asalelaki bokilo na ye Naomi. Emonani ete Naomi akumisaki Ruta epai ya basi ya Beteleme, mpe maloba yango ekómaki na matoi ya Boaze. Ayebaki mpe ete Ruta akómi kosambela Yehova, mpo alobaki na ye boye: “Tiká Yehova apesa mbano mpo na oyo osalaki, mpe ozwa lifuti ya kokoka uta na Yehova Nzambe ya Yisraele, oyo na nse ya mapapu na ye oyei koluka esika ya komibomba.”​—Ruta 2:12.

Maloba wana elendisaki mpenza Ruta! Kutu, azwaki ekateli ya koluka libateli na nse ya mapapu ya Yehova Nzambe, lokola mwana ndɛkɛ oyo alukaka libateli na nse ya mapapu ya mama na ye. Apesaki Boaze mersi ndenge alobaki na ye maloba kitoko wana. Mpe akobaki kosala tii na mpokwa.​—Ruta 2:13, 17.

Kondima oyo Ruta amonisaki ezali mpenza ndakisa malamu mpo na biso nyonso oyo tozali kobunda na eleko oyo makambo ya nkita ezali kobeba. Akanisaki te ete basusu basengelaki kaka kopesa ye biloko, yango wana asepelaki na eloko nyonso oyo bazalaki kopesa ye. Ayokaki nsɔni te mpo na kosala mosala makasi ntango molai mpo na moto oyo azalaki kolinga mingi, atako ezalaki mosala moko ya lokumu te. Andimaki mpe asalelaki na bɔtɔndi nyonso toli ya bwanya oyo etali ndenge ya kosala mosala kozanga likama elongo na bato ya malamu. Likambo eleki ntina, abosanaki soki moke te epai wapi libateli na ye ya solosolo ezalaki, elingi koloba, epai ya Yehova Nzambe, Tata oyo azalaki kobatela ye.

Soki tomonisi bolingo ya sembo lokola Ruta mpe tolandi ndakisa na ye ya komikitisa, ya kosala mosala makasi, mpe kozala na botɔndi, tokomona ete kondima na biso mpe ekokóma ndakisa malamu mpo na basusu. Kasi, ndenge nini Yehova akokisaki bamposa ya Ruta ná Naomi? Tokolobela yango mbala ya nsima.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá lisolo “Mituna ya batángi​—Mpo na nini Nzambe asɛngaki basambeli na ye bábalana kaka bango na bango?” na lokasa 29.

b Simbá ete Ruta asalelaki kaka te titre “Nzambe” ndenge bapaya mingi bazalaki kosala yango; asalelaki mpe nkombo mpenza ya Nzambe, Yehova. Buku moko (The Interpreter’s Bible) elobi boye: “Mokomi amonisi mpenza ete mopaya yango azali mosambeli ya Nzambe ya solo.”

c Mobeko yango ezalaki mpenza malamu, ekesanaki mpenza na mibeko nyonso oyo Ruta ayebaki na mokili na ye. Na ntango ya kala, na Proche Orient, bazalaki kosalela basi oyo mibali bakufá makambo mabe. Buku moko elobi boye: “Nsima ya liwa ya mobali, mwasi asengeli koluka lisalisi epai ya bana na ye ya mibali; soki azalaki na mwana te, asengelaki komitɛka na boombo, kosala kindumba to kokufa.”

[Etanda na lokasa 26]

Mwa mokanda moko ya kitoko

Bato bamonaka ete mokanda ya Ruta ezali lokola liyaka moko ya motuya, mwa mokanda moko ya kitoko. Mokanda ya Ruta ekeseni mpenza na mokanda ya Basambisi oyo ezali liboso na yango, oyo elobeli ntango oyo makambo oyo ezali na mokanda ya Ruta esalemaki. (Ruta 1:1) Emonani ete mikanda yango mibale ekomamaki na mosakoli Samwele. Ntango ozali kotánga Biblia, okondima ete mokanda ya Ruta etyami na esika moko malamu na kati ya mikanda ya Biblia. Nsima ya kotánga masolo ya bitumba, ya kokɔtela bato na mboka mpo na etumba to kobunda na bango ndenge elobelami na mokanda ya Basambisi, okokóma na mwa mokanda wana oyo ezali komonisa biso ete Yehova abosanaka te bato ya kimya oyo batungisamaka mpo na mikakatano ya mokolo na mokolo. Lisolo yango, oyo emonisi mpasi oyo libota wana ekutanaki na yango, ezali na toli ya malamu mpenza oyo etali bolingo, oyo ekoki kosalisa soki ndeko to moninga akufi, oyo etali kondima mpe bosembo oyo ekoki kosalisa moto nyonso.

[Elilingi na lokasa 24]

Ruta amonisaki ete azali na bwanya ndenge akangamaki na Naomi na ntango ya mawa mpe ya mpasi

[Elilingi na nkasa 24, 25]

“Bato na yo bakozala bato na ngai, mpe Nzambe na yo Nzambe na ngai”

[Elilingi na lokasa 27]

Ruta andimaki kosala mosala makasi, mpe ya lokumu te mpo na kokokisa bamposa na ye mpe ya Naomi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto