Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w13 1/4 lok. 3
  • Moto akoki mpenza kozala na bomoi ya esengo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moto akoki mpenza kozala na bomoi ya esengo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Masolo mosusu
  • Mpo ozala na bomoi ya esengo—Landá ndakisa ya Yesu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Bomoi oyo ezali na ntina, sikoyo mpe mpo na libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mobongisi-nzela ya mpiko
    Buku ya mobu 2016 ya Batatoli ya Yehova
  • Nini esalaki ete Yesu azala na bomoi ya esengo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
w13 1/4 lok. 3

ELOBELI TITRE YA EZIPELI: MOTO AKOKI KOZALA NA BOMOI YA ESENGO?

Moto akoki mpenza kozala na bomoi ya esengo?

“Bomoi na biso ekoki koumela mbula tuku sambo (70), to mbula tuku mwambe (80) po na bato ya nzoto makasi. Kasi yango ezali kaka bomoi ya pasi pe ya mawa.”​—Nzembo 90:10, Bible na lingala ya lelo oyo.

MALOBA yango ezali solo mpenza! Na mokili oyo, bomoi ya bato etondi na ‘mpasi mpe mawa.’ Mbala mosusu osilá komituna soki ‘ekoki kosalema ete lelo oyo moto azala mpenza na bomoi ya esengo.’

Tozwa ndakisa ya Maria. Liboso azalaki nzoto makasi, kasi sikoyo azali na mbula 84, mpe akɔtá ndako. Azali na ye mayele, kasi nzoto na ye ezali lisusu makasi te. Ndenge nini akoki komona ete bomoi ya ndenge wana ezali mpenza ya esengo?

Bongo yo? Mbala mosusu omitunaka soki bomoi na yo ekoki mpenza kozala ya esengo. Ekoki kozala ete osalaka mosala kaka moko mpe oyo elɛmbisaka. Mbala mosusu bato bakipaka te milende to mosala oyo osalaka. Ata soki omonaka ete bomoi na yo ezali mwa malamu sikoyo, mbala mosusu okoki komitungisa mpo na avenire. Na bantango mosusu, okoki konyokwama na makanisi to komiyoka lokola ozali yo moko. Ekoki kozala ete kozanga koyokana mpe koswana ezali na libota na yo. To mpe moto oyo olingaka mingi akufi. Mobali moko na nkombo André azalaki kolinga tata na ye mingi; kasi tata yango abɛlaki na mbalakaka mpe akufaki. André ayokaki mpasi mingi mpo na likambo yango mpe amonaki lokola ete mpasi yango ekoki kosila te.

Ezala tokutani na mikakatano ya ndenge nini, ezali na likambo moko oyo tozalaka mpenza na mposa ya koyeba: Moto akoki mpenza kozala na bomoi ya esengo? Bomoi ya Yesu Kristo, oyo azalaki awa na mabele eleki sikoyo bambula 2 000 ekoki kopesa biso eyano na motuna yango. Atako akutanaki na mikakatano mingi, Yesu azalaki mpenza na bomoi ya esengo. Soki tolandi ndakisa na ye, biso mpe tokoki kozala na bomoi ya ndenge wana.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto