BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA
Masumu na biso ekoki kolimbisama?
Ezalaka mpasi te mpo moto andimama na Nzambe
Biblia emonisi ete bato nyonso bazali basumuki. Tozwá ezaleli yango epai ya Adama, moto ya liboso. Yango wana, na bantango mosusu tosalaka makambo ya mabe oyo na nsima epesaka biso mawa. Yesu Kristo, Mwana ya Nzambe, akufaki mpo na kofuta masumu na biso. Mbeka ya lisiko oyo apesaki esali ete masumu na biso elimbisama. Ezali likabo oyo euti na Nzambe.—Tángá Baroma 3:23, 24.
Bato mosusu basalá masumu minene mpe bamitunaka soki Nzambe akoki kolimbisa bango. Likambo ya esengo, Liloba ya Nzambe elobi ete: “Makila ya Yesu Mwana na ye ezali kopɛtola biso na lisumu nyonso.” (1 Yoane 1:7) Yehova andimaka kolimbisa ata masumu ya minene soki moto abongoli mpenza motema.—Tángá Yisaya 1:18.
Tosengeli kosala nini mpo masumu na biso elimbisama?
Soki tolingi Yehova Nzambe alimbisa biso, tosengeli koyekola makambo na ye—koyeba banzela na ye, koyoka batoli na ye mpe kotosa makambo oyo asɛngaka. (Yoane 17:3) Yehova alimbisaka mpenza baoyo batikaka bizaleli na bango ya mabe mpe babongwanaka.—Tángá Misala 3:19.
Ezalaka mpasi te mpo moto andimama na Nzambe. Yehova ayebi bolɛmbu na biso. Azali motema mawa mpe boboto. Motema mawa na ye esengeli te kotinda yo oluka koyeba makambo mingi oyo osengeli kosala mpo osepelisa ye?—Tángá Nzembo 103:13, 14.