BILOKO OYO TOSALELÁ KALA
Batikalaki ngwi na “ngonga ya komekama”
NA ETUMBA ya Liboso ya mokili mobimba, oyo ebandaki na 1914, bato mingi bayebaki polele ete Bayekoli ya Biblia bakɔtaka na bitumba te. (Yis. 2:2-4; Yoa. 18:36; Ef. 6:12) Basaleli ya Yehova na Angleterre basalaki nini mpo na yango?
Henry Hudson
Mobeko moko oyo ebimaki na Angleterre na 1916 elobaki ete mibali oyo babalá te, oyo bazalaki na mbula kobanda 18 tii 40 basengelaki kokende na bitumba. Kasi mobeko yango ezalaki mpe koloba ete moto azali na lotomo ya koboya kosala mosala ya soda soki “lingomba na ye to lisosoli na ye epekisi ye asala yango.” Guvɛrnema etyaki batribinale mpo na kokata soki nani asengeli kozwa lotomo ya koboya kokɔta na mosala ya soda mpe soki ekosɛnga ete bápesa ye misala mosusu.
Nsima ya mwa ntango moke, batyaki Bayekoli ya Biblia soki 40 na bolɔkɔ ya basoda, mpe batindaki bandeko mosusu 8 na bitumba na France. Lokola bandeko ya Angleterre basepelaki te na likambo wana oyo ezalaki sembo te, batindaki mokanda epai ya ministre-mokonzi Herbert Asquith mpo na komonisa ete basepeli te ndenge batye bandeko wana na bolɔkɔ; nzela moko na mokanda yango, batindaki mokanda mosusu oyo ezalaki na sinyatire ya bandeko 5 500.
Na nsima, bazwaki nsango ete bakatelaki bandeko 8 oyo batindamaki na France etumbu ya liwa mpo baboyaki kokende bitumba. Kasi ntango batandaki bandeko yango na molɔngɔ mpo na kobɛta bango masasi, bayebisaki bango ete etumbu na bango ebongwani; basengelaki kolekisa mbula zomi na bolɔkɔ. Bazongisaki bango na Angleterre mpo bákende kokɔta bolɔkɔ kuna.
James Frederick Scott
Lokola etumba ezalaki se koya ndongo, babimisaki mobeko mosusu ete mibali oyo babalá basengeli mpe kokende na mosala ya soda. Na ndakisa, na engumba Manchester, na Angleterre, basambisaki Henry Hudson, Moyekoli ya Biblia moko oyo azalaki mpe monganga. Na mokolo ya 3, sanza ya mwambe 1916, tribinale ekataki ete ndeko yango abuki mobeko; bafutisaki ye amande, mpe batindaki ye na mosala ya soda. Kaka na ntango wana, na engumba na Edimbourg, na Écosse, basambisaki mpe ndeko James Frederick Scott, mobongisi-nzela oyo azalaki na mbula 25; kasi tribinale ekataki ete abuki mobeko te. Guvɛrnema efundaki lisusu ndeko yango, kasi na nsima batikaki likambo na ye mpo na kolandela likambo ya ndeko mosusu na Londres. Ya mbala oyo, bakataki ete ndeko Herbert Kipps abuki mobeko, bafutisaki ye amande, mpe batindaki ye na mosala ya soda.
Na sanza ya libwa 1916, bandeko 264 basɛngaki ete bátinda bango te na mosala ya soda. Kati na bango, bapesaki bandeko 5 lotomo ya koboya mosala ya soda, bapesaki bandeko 154 misala mosusu ya ekólo, batindaki bandeko 23 na mosala ya soda oyo esɛngaka te kosimba mondoki, batindaki bandeko 82 na mosala ya soda, mpe bamosusu oyo baboyaki, basambisaki bango mpe batyaki bango na bolɔkɔ. Bato mingi basepelaki te ndenge bazalaki konyokola makasi bandeko yango, yango wana guvɛrnema ebimisaki bango na bolɔkɔ ya basoda mpe etindaki bango na bakaa ya misala makasi.
Pryce Hughes
Ndeko Edgar Clay mpe ndeko Pryce Hughes, oyo na nsima akómaki mokambi ya filiale na Angleterre, asalaki na barrage moko na pays de Galles. Longola bango, Herbert Senior, moko ya bandeko mwambe oyo bautaki na France, atindamaki na bolɔkɔ ya Wakefield, na etúká ya Yorkshire. Mpo na kokokisa etumbu na bango, bandeko mosusu basalaki misala makasi na bolɔkɔ ya Dartmoor, epai minyoko ezalaki makasi; bolɔkɔ yango nde ezalaki na bato mingi koleka oyo baboyaki kosala mosala ya soda mpo lisosoli na bango epekisaki bango.
Frank Platt, Moyekoli mosusu ya Biblia, oyo andimaki kosala misala mosusu oyo ezalaki na boyokani na bitumba te, anyokwamaki makasi na boumeli ya ntango molai, mpo aboyaki kokende na bitumba. Bakonzi ya basoda banyokolaki mpe makasi Atkinson Padgett, oyo ayebaki solo mwa moke nsima ya kokɔta na mosala ya soda, mpo aboyaki kokende bitumba.
Herbert Senior
Atako eleki sikoyo mbula soki 100 bandeko na biso bayebaki malamu te makambo nyonso oyo basengeli kosala mpo na koboya kokɔta na makambo ya mokili, bazalaki na mposa ya kosepelisa Yehova Nzambe. Bandeko oyo bankombo na bango etángami na lisolo oyo batikaki ndakisa malamu na ndenge baboyaki kokɔta na bitumba, mingimingi na ngonga wana ya mpasi mpe “ya komekama.” (Em. 3:10)—Biloko oyo tosalelá kala, na Angleterre.