BILOKO OYO TOSALELÁ KALA
“Nazalaki lokola nkoba na kati ya ndako na yango”
NA MOBU 1929, basakoli ya Bokonzi koleka 10 000 bapanzanaki na États-Unis mobimba mpo na kosala kampanye moko monene oyo eumelaki mikolo libwa. Bakabolaki babuku mpe mwa babuku soki 250 000. Na kati ya basakoli wana, ba-colporteur bazalaki soki nkóto moko. Bakómaki ebele mpenza! Bulletina elobaki ete ezali “likambo ya kokamwa mpenza” ndenge motángo ya babongisi-nzela ebakisamaki mbala misato kobanda 1927 ii 1929.
Na nsuka ya 1929, nkita ya mokili mobimba ebebaki. Na mokolo ya 29/10/1929, nkita ya New York ekweaki makasi mpe yango esalaki ete nkita ya bikólo mingi ebeba. Babanki mingi ezalaki lisusu na mbongo te. Baferme ezalaki lisusu kosala te. Baizine ya minene ekangamaki. Bamilio ya bato babungisaki misala na bango. Na 1933, mokolo na mokolo na États-Unis, bazalaki kobɔtɔla bato ata 1 000 bandako oyo bazwaki na nyongo.
Basakoli ya ntango nyonso basalaki nini na eleko wana ya mpasi? Moko ya makambo oyo esalisaki ezalaki motuka oyo bakómisi ndako. Lokola ezalaki ya kofutela te mpe bazalaki kofutela yango mpako te, motuka oyo bakómisi ndako esalisaki babongisi-nzela mingi bákoba kosakola kozanga ete bábimisa mbongo mingi.b Lisusu, na ntango ya mayangani, bazalaki kolala kaka na mituka yango. Na 1934, Bulletin eyebisaki ndenge ya kotya biloko lokola pɔmpi ya mai, resho, mbeto, mpe biloko oyo ekoki kopekisa malili ekɔta na motuka.
Na mikili ndenge na ndenge, basakoli mingi bakómaki kobongisa mituka na bango mpo ekóma mpe mwa ndako na bango. Ndeko Victor Blackwell alobaki boye: “Liboso, Noa ayekolaki kotonga masuwa te; ngai mpe natongaki ndako liboso te, nayebaki mpe kokómisa motuka ndako te.” Atako bongo, alongaki kosala yango.
Motuka oyo bakómisi ndako, oyo balingi kokatisa yango ebale na eleko ya bambula makasi na Inde
Ndeko Avery Bristow ná mwasi na ye Lovenia bazalaki mpe na motuka yango. Avery alobi boye: “Nazalaki lokola nkoba na kati ya ndako na yango. Nazalaki komema ndako na ngai bisika nyonso.” Ndeko Bristow ná mwasi na ye bazalaki babongisi-nzela elongo na ndeko Harvey Conrow ná mwasi na ye Anne, oyo batyaki bapapye ná gudrɔ na motuka na bango. Bapapye ezalaki kokweakwea ntango nyonso oyo bazali kotambwisa ndako yango. Avery alobi boye: “Moto moko te asalaki ndako na motuka ndenge wana liboso, mpe banda wana, mosusu ya ndenge wana esalemaki te!” Kasi, Avery alobi ete ndeko Conrow, mwasi na ye, mpe bana na bango mibale ya mibali bazalaki na “libota moko ya esengo mpenza.” Ndeko Harvey Conrow akomaki boye: “Tozalaki kozanga eloko te, tozalaki na kimya na mosala ya Yehova mpe azalaki kokokisa bamposa na biso.” Na nsima, bato nyonso minei ya libota yango bakɔtaki na Eteyelo ya Gileade, mpe batindaki bango bamisionɛrɛ na ekólo Pérou.
Bato ya libota ya ndeko Battaino mpe bazalaki babongisi-nzela. Ntango Vincenza, mwasi ya Giusto azwaki zemi, babongisaki motuka na bango ya monene mpe bakómisaki yango ndako oyo “ezalaki kitoko” koleka ndako ya bakapo epai bazalaki kofanda liboso. Bakobaki mosala ya mobongisi-nzela na mwana na bango ya mwasi, bazalaki kosakwela bato ya Italie oyo bafandaka na États-Unis.
Bato mingi bazalaki kosepela na nsango malamu, kasi lokola mingi bazalaki babola mpe basomɛlɛ, bazalaki mpenza kopesa mbongo te soki bazwi mikanda na biso. Bazalaki nde kopesa biloko mosusu oyo bazali na yango. Babongisi-nzela mibale bakomaki liste ya biloko 64 oyo bato bazalaki kopesa bango soki bazwi mikanda. Liste yango ezalaki “lokola liste ya biloko oyo ezali na magazini.”
Fred Anderson akutanaki na mosali-bilanga moko oyo asepelaki kozwa babuku na biso, kasi lokola azalaki na mbongo te, apesaki manɛti oyo ezalaká ya mama na ye. Na ferme mosusu, mobali moko asepelaki na mikanda na biso, kasi alobaki ete: “Nazali na manɛti te mpo na kotánga.” Kasi, ntango alataki manɛti ya moninga na ye, atángaki babuku yango mpe na esengo nyonso, apesaki likabo mpo na mikanda mpe mpo na manɛti.
Herbert Abbott azalaki na ndako ya bansoso na kati ya motuka na ye. Soki azwi ata nsoso misato to minei nsima ya kopesa bato mikanda azalaki kokende kotɛka yango na zando, mpe mbongo oyo azwi, azalaki kosombela yango esansi. Akomaki boye: “Na bantango mosusu tozalaki kozanga mbongo. Kasi tozalaki kozonga nsima te. Soki motuka ezali na esansi, tozalaki kokoba kosakola, tozalaki kotyela Yehova motema mobimba.”
Kotyela Yehova motema mpe ekateli makasi oyo bandeko bazalaki na yango esalisaki bango na eleko wana ya mpasi. Mokolo moko oyo mbula makasi ebɛtaki, ndeko Maxwell Lewis ná mwasi na ye Emmy babikaki na liwa: ntango kaka babimaki na motuka na bango, nzete moko ekwelaki yango mpe motuka epanzanaki. Ndeko Maxwell akomaki boye: “Makambo ya ndenge wana ezalaki mikakatano te, ezalaki kaka makama ya mikemike mpe tokanisaki ata mokolo moko te kolɛmbisa mabɔkɔ. Mosala ezalaki mingi mpe tozalaki na mposa ya kosala yango.” Maxwell ná Emmy bazongaki nsima te mpe na lisalisi ya bandeko, batongaki lisusu ndako na bango.
Ata lelo mpe, bamilio ya Batatoli ya Yehova ya molende bazali komonisa elimo wana ya komipimela atako mikakatano ezali. Ya solo, ndenge moko na babongisi-nzela wana ya liboso, tozali na ekateli ya kokoba kosakola tii mosala ekokóma na nsuka.
a Lelo oyo Mosala na biso ya Bokonzi.
b Na bambula wana, babongisi-nzela mingi bazalaki na mosala mosusu te. Bazalaki kozwa mikanda na ntalo moke mpe soki batɛki yango, bazalaki kosalela mwa mbongo oyo bazwi.