Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w14 1/12 lok. 3
  • Omiyokaka ete ozali penepene na Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Omiyokaka ete ozali penepene na Nzambe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MOTO AKOKI KOZALA PENEPENE NA NZAMBE
  • Yango nde lolenge ya bomoi oyo eleki malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Okoki mpenza ‘kopusana penepene na Nzambe’?
    Pusaná penepene na Yehova
  • Osololaka na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Ozali na boyokani ya ndenge nini ná Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
w14 1/12 lok. 3
Mobali oyo azali kokanisa makambo etali Nzambe

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | OKOKI KOPUSANA PENEPENE NA NZAMBE

Omiyokaka ete ozali penepene na Nzambe?

“Kozala na boyokani malamu na Nzambe ekosala ete omiyoka ete obatelami, ozali na nyonso mpe na kimya. Okomiyoka mpe ete Nzambe azali ntango nyonso kosala makambo mpo na bolamu na yo.”​—CHRISTOPHER, ELENGE MOBALI MOKO YA GHANA.

“Nzambe amonaka mikakatano na yo nyonso, alingaka yo mingi mpe atyelaka yo likebi koleka ndenge osɛngaka ye.”​—HANNAH, ELENGE MWASI YA MBULA 13 NA ALASKA, ÉTATS-UNIS.

“Koyeba ete ozali na boyokani malamu na Nzambe ezali likambo oyo eleki malamu mpe ekitisaka mpenza motema!”​—GINA, MWASI MOKO YA MBULA SOKI 45 NA JAMAÏQUE.

Ezali kaka Christopher, Hannah, mpe Gina te nde bamiyokaka bongo. Bato mingi na mokili mobimba bandimaka mpenza ete Nzambe azwaka bango lokola baninga na ye. Bongo yo? Omiyokaka ete ozali penepene na Nzambe? To okolinga kozala penepene na ye? Mbala mosusu omitunaka boye: ‘Ekoki mpenza kosalema ete moto azala mpenza moninga ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso? Mpe soki ɛɛ, ndenge nini?’

MOTO AKOKI KOZALA PENEPENE NA NZAMBE

Biblia emonisi ete moto akoki kokóma moninga mpenza ya Nzambe; elobi ete Nzambe abengaki Abrahama ‘moninga na ye.’ (Yisaya 41:8) Yakobo 4:8 elobi boye: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” Yango emonisi polele ete moto akoki kokóma mpenza moninga ya Nzambe. Kasi lokola Nzambe amonanaka te, ndenge nini tokoki ‘kopusana penepene’ na ye mpe kozala moninga na ye?

Mpo na kozwa eyano na motuna yango, tótalela makambo oyo esalaka ete boninga ya bato ekola. Ebandaka mingimingi ntango bato mibale bayebani bankombo. Na nsima, lokola basololaka mbala na mbala, bapesanaka makanisi, boninga na bango ekolaka. Mpe ntango bazali kosalelana makambo ya malamu, boninga na bango ekómaka makasi. Ezali mpe bongo mpo na kosala boninga na Nzambe. Tótala mpo na nini ezali bongo.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto