Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp16 No. 5 nk. 4-5
  • Ndenge Nzambe abɔndisaka biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge Nzambe abɔndisaka biso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MOKUMBA YA YESU NA OYO ETALI KOBƆNDISA BAOYO NYONSO BAZALI KOLELA
  • ‘Tóbɔndisa baoyo bazali kolela’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Bóbɔndisa bato oyo bazali na mpasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Epai wapi tokoki kozwa libɔndisi ya solosolo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Zwá libɔndisi na nguya ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
wp16 No. 5 nk. 4-5
Yesu asimbi moto ya maba liboso abikisa ye

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | EPAI WAPI OKOKI KOZWA LIBƆNDISI?

Ndenge Nzambe abɔndisaka biso

Ntoma Paulo amonisi ete Yehovaa azali “Nzambe ya kobɔndisama nyonso, oyo abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.” (2 Bakorinti 1:3, 4) Na yango, Biblia endimisi biso ete Nzambe akoki kosalisa moto nyonso mpe Tata na biso ya likoló akoki kobɔndisa biso na mikakatano ya ndenge nyonso.

Kasi, tosengeli kosala eloko moko soki tolingi Nzambe abɔndisa biso. Ndenge nini monganga akoki kosalisa biso soki toyokanaki te ete tókutana na ye? Mosakoli Amose atunaki boye: “Bato mibale bakotambola nde elongo soki bayokani te?” (Amose 3:3) Makomami elendisi biso boye: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”​—Yakobo 4:8.

Nini ekoki kondimisa biso ete Nzambe akopusana penepene na biso? Ya liboso, mpo ayebisaka biso mbala na mbala ete alingi kosalisa biso. (Talá etanda.) Ya mibale, mpo ezali na bato oyo balobi ete Nzambe abɔndisaki bango​—bato ya solo mpenza, ezala na ntango na biso to na ntango ya kala.

Ndenge moko na bato mingi oyo balukaka lisalisi ya Nzambe lelo, Mokonzi Davidi mpe akutanaki na bampasi. Mokolo moko abondelaki Yehova boye: “Yoká mongongo ya malɔmbɔ na ngai ntango nazali kolelela yo mpo na kosɛnga lisalisi.” Nzambe ayokaki ye? Ɛɛ. Mpo Davidi abakisi boye: “Nasalisami, bongo motema na ngai ezali kosepela.”​—Nzembo 28:2, 7.

MOKUMBA YA YESU NA OYO ETALI KOBƆNDISA BAOYO NYONSO BAZALI KOLELA

Nzambe apesaki Yesu mokumba monene ya kobɔndisa bato. Na mikumba oyo Nzambe apesaki ye, Yesu asengelaki mpe ‘kokanga mpota ya bato oyo bazoki na mitema’ mpe ‘kobɔndisa baoyo bazali kolela.’ (Yisaya 61:1, 2) Ndenge esakolamaki, Yesu atyaki likebi mingi epai ya baoyo bazalaki “komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba.”​—Matai 11:28-30.

Yesu abɔndisaki bato na batoli oyo azalaki kopesa bango, kosalela bango makambo na boboto ata mpe kobikisa bamosusu na maladi na bango. Mokolo moko moto ya maba alobaki na Yesu boye: “Soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto.” Lokola ayokaki mawa, Yesu ayebisaki moto yango ete: “Nalingi. Kómá pɛto.” (Marko 1:40, 41) Mpe maba na ye esilaki.

Lelo oyo, Mwana ya Nzambe azali awa na mabele te mpo ye moko abɔndisa biso. Kasi Tata na ye, Yehova, “Nzambe ya kobɔndisama nyonso,” azali kokoba kosalisa baoyo bazali na mposa ya lisalisi. (2 Bakorinti 1:3) Tótalela makambo minei oyo Nzambe asalelaka mpo na kobɔndisa bato.

  • Biblia. “Makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo eteya biso, mpo, na ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na libɔndisi oyo euti na Makomami, tózala na elikya.”​—Baroma 15:4.

  • Elimo santu ya Nzambe. Mwa moke nsima ya liwa ya Yesu, lisangá mobimba ya bokristo ekɔtaki na eleko moko ya kimya. Mpo na nini? “Ezalaki kotambola na kobanga Yehova mpe na libɔndisi ya elimo santu.” (Misala 9:31) Elimo santu, nguya oyo Nzambe asalaka na yango mosala, ezali makasi mingi mpenza. Nzambe akoki kosalela yango mpo na kobɔndisa moto nyonso na likambo nyonso.

  • Libondeli. Biblia epesi toli oyo: “Bómitungisa ata na likambo moko te.” Kutu ebakisi: “Kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino.”​—Bafilipi 4:6, 7.

  • Bandeko na biso bakristo bakoki kokóma baninga ya solosolo oyo bakoki kobɔndisa biso na ntango ya mpasi. Ntoma Paulo amonisaki ete baninga na ye ‘bakómaki lisalisi oyo ezali kopesa ye makasi’ na ntango ya ‘kokelela mpe bolɔzi.’​—Bakolose 4:11; 1 Batesaloniki 3:7.

Batatoli ya Yehova mibale bazali kobɔndisa ndeko na bango mokristo

Kasi okoki komituna soki esalemaka ndenge nini mpenza. Tiká tólobela naino makambo oyo bato oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo bakutanaki na yango. Ndenge moko na bango, okoki komona ete Nzambe akokisaka elaka na ye oyo: “Nakokoba kobɔndisa bino lokola moto oyo mama na ye azali se kobɔndisa.”​—Yisaya 66:13.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.

Ndenge nini toyebi ete Nzambe alingaka kobɔndisa biso?

  • “Yo moko, Ee Yehova, osalisi ngai mpe obɔndisi ngai.”​—Nzembo 86:17.

  • “Nzambe na bino alobi: ‘Bóbɔndisa, bóbɔndisa bato na ngai.’”​—Yisaya 40:1.

  • “Talá oyo Yehova alobi: . . . ‘Nakokoba kobɔndisa bino lokola moto oyo mama na ye azali se kobɔndisa.’”​—Yisaya 66:12, 13.

  • “Esengo na baoyo bazali na mawa, mpo bakobɔndisama.”​—Matai 5:4.

  • ‘Bóbwakela [Nzambe] mitungisi na bino, mpo atyelaka bino likebi.’​—1 Petro 5:7.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto