Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp17 No. 2 lok. 16
  • Biblia elobi nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia elobi nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tozali na “mikolo ya nsuka”?
  • Bomoi ya bato ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya?
  • Nsuka ya mokili ekómi pene?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Tozali na “mikolo ya nsuka”?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Elembo ya “mikolo ya nsuka” to ‘ntango ya nsuka’ ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Ndenge nini toyebi ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka”
    Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
wp17 No. 2 lok. 16
Mikóló mpe bana na paradiso

Paradiso ezali kozela baoyo bakobika ntango nsuka ya mokili ekoya

Biblia elobi nini?

Tozali na “mikolo ya nsuka”?

Okopesa eyano nini?

  • Ɛɛ

  • Te

  • Ntango mosusu

Oyo Biblia elobi

“Mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” (2 Timote 3:1) Bisakweli ya Biblia ná makambo oyo ezali kosalema lelo ezali komonisa ete tozali na “mikolo ya nsuka.”

Makambo nini mosusu tokoki koyekola na Biblia?

  • Na mikolo ya nsuka tokomona makambo lokola bitumba, banzala, koningana ya mabele mpe bamaladi mabe oyo epalanganaka.​—Matai 24:3, 7; Luka 21:11.

  • Na mikolo ya nsuka bizaleli mpe makanisi ya bato ekobeba mpenza.​—2 Timote 3:2-5.

Bomoi ya bato ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya?

Bato mosusu bakanisaka . . . ete ntango nsuka ya mokili ekoya, mabele ekobebisama ná bato nyonso oyo bafandi na mabele, kasi basusu bakanisaka ete makambo ekobonga. Yo okanisaka nini?

Oyo Biblia elobi

“Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”​—Nzembo 37:29.

Makambo nini mosusu tokoki koyekola na Biblia?

  • Mabe nyonso ekosila ntango nsuka ya mokili ekoya.​—1 Yoane 2:17.

  • Mabele ekobongwana paradiso.​—Yisaya 35:1, 6.

Mpo na koyeba makambo mosusu etali “mikolo ya nsuka”, talá mokapo 9 ya buku oyo, Makambo oyo Biblia eteyaka, ebimisami na Batatoli ya Yehova

Ezali mpe na www.pr2711.com

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto