Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w17 Juin lok. 21
  • “Tiká ete mayele na yo epambwama!”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Tiká ete mayele na yo epambwama!”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Masolo mosusu
  • Abigaile ná Davidi
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Asalaki na bokɛngi
    Mekolá kondima na bango
  • Asalaki na bokengi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mwasi moko ya mayele apɛngoli likámá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
w17 Juin lok. 21
Abigaile

“Tiká ete mayele na yo epambwama!”

DAVIDI, moto ya Yisraele ya kala, nde alobaki maloba yango mpo na kokumisa mwasi moko oyo bakutanaki. Nkombo na ye ezalaki Abigaile. Nini etindaki Davidi akumisa ye, mpe mateya nini tokoki kozwa na ndakisa ya mwasi yango?

Ezalaki ntango Davidi azalaki kokima Mokonzi Saulo nde akutanaki na mwasi yango. Abigaile azalaki mwasi ya Nabale, moto moko ya bozwi oyo ebele ya bibwɛlɛ ezalaki na etúká ya ngombangomba na sudi ya Yuda. Davidi ná bato na ye bazalaki “lokola efelo zingazinga” ya babateli ya mpate ya Nabale ná bibwɛlɛ na ye. Na nsima, Davidi atindaki bato epai ya Nabale mpo básɛnga ye bilei ‘nyonso oyo lobɔkɔ na ye ekozwa.’ (1 Samwele 25:8, 15, 16) Ezalaki kolekisa ndelo te, mpo Davidi ná bato na ye babatelaki biloko ya Nabale.

Kasi, Nabale, nkombo oyo elimboli, “Azangá mayele” to “Zoba,” asalaki makambo oyo eyokani na nkombo yango. Asilikaki makasi, afingaki, mpe aboyaki kopesa Davidi biloko. Na yango, Davidi amibongisaki mpo na kobundisa Nabale mpo afingaki ye mpe atindelaki ye eyano ya mabe. Nabale ná bato ya ndako na ye balingaki komona mpasi mpo na bozoba na ye.​—1 Samwele 25:2-13, 21, 22.

Ntango Abigaile amonaki ete makambo eyei ndongo, amonisaki mpiko mpe akɔtaki likambo yango. Asololaki na Davidi na limemya mpe ayebisaki ye akanisa boyokani na ye ná Yehova. Amemaki biloko ebele mpo na Davidi, oyo asengelaki kokóma mokonzi, ná bato na ye. Davidi andimaki ete Yehova nde asalelaki Abigaile mpo na kopekisa ye asala likambo oyo elingaki komemisa ye ngambo na miso ya Nzambe. Davidi alobaki na ye: “Tiká ete mayele na yo epambwama, mpe yo moko opambwama, yo moto opekisi ngai lelo ete namema ngambo ya makila.”​—1 Samwele 25:18, 19, 23-35.

Ezali polele ete tokolinga te kozala lokola Nabale; biso tosengeli kondimaka bolamu oyo basaleli biso. Lisusu, soki tomoni ete likambo ya mabe ezali koya, tosengeli kosala oyo tokoki mpo na kopekisa yango. Tózala lokola mokomi ya nzembo oyo ayebisaki Nzambe ete: “Teyá ngai bolamu, mayele mpe boyebi.”​—Nzembo 119:66.

Bato bakoki komona bwanya to mayele na biso. Ata soki balobi yango to te, bakoki koyoka lokola Davidi, oyo alobaki: “Tiká ete mayele na yo epambwama!”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto