Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp18 No. 3 lok. 13
  • Etikali moke Nzambe asilisa bampasi nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Etikali moke Nzambe asilisa bampasi nyonso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2018
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NTANGO NINI NZAMBE AKOSILISA BAMPASI?
  • Tyelá Yehova motema mpe zalá na bomoi!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Bato mabe bakoumela lisusu ntango boni?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Tóyoka esengo na Nzambe ya lobiko na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mokanda ya Biblia nimero 35—Habakuku
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2018
wp18 No. 3 lok. 13
Kolala ya moi

Etikali moke Nzambe asilisa bampasi nyonso

Habakuku, mobali moko ya sembo, oyo Nzambe azalaki kosepela na ye, atunaki boye: “Ee Yehova, kino ntango nini nakobelela mpo na kosɛnga lisalisi, mpe yo okoyoka te? Kino ntango nini nakobelela yo mpo na kosɛnga lisalisi mpo obikisa na mobulu, mpe yo okobikisa te?” (Habakuku 1:2, 3) Mituna na ye emonisi nde ete azangaki kondima? Soki moke te! Nzambe ayebisaki Habakuku ete asilá kopona ntango oyo akosilisa bampasi nyonso.​—Habakuku 2:2, 3.

Soki mpasi ekómeli yo moko to moto moko oyo olingaka, okoki kokanisa ete Nzambe azali koumela mpo na kosilisa bampasi, mpe ete asengeli kosilisa yango sikoyo. Nzokande, Biblia emonisi ete: “Yehova azali koumisa makambo te na elaka na ye, ndenge bato mosusu batalelaka koumisa makambo, kasi azali nde komonisela bino motema molai mpo alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.”​—2 Petro 3:9.

NTANGO NINI NZAMBE AKOSILISA BAMPASI?

Etikali moke! Yesu alobaki ete libota moko ekomona makambo oyo ekomonisa mikolo ya nsuka ya “makambo ya ntango oyo.” (Matai 24:3-42) Ndenge oyo esakweli wana ya Yesu ezali kokokisama na mikolo na biso emonisi ete etikali moke Nzambe asilisa bampasi ya bato.a

Kasi, ndenge nini Nzambe akosilisa bampasi nyonso? Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki nguya oyo Nzambe azali na yango ya kosilisa mpasi ya bato. Tótalela mwa bandakisa.

Makama oyo ebimaka yango moko: Ntango Yesu ná bantoma na ye bazalaki kotambola na bwato na Mbu ya Galile, mopɛpɛ moko ya makasi ebɛtaki mpe elingaki kozindisa bwato na bango. Kasi Yesu amonisaki ete ye ná Tata na ye bazali na nguya ya kokitisa mopɛpɛ mpe mbonge. (Bakolose 1:15, 16) Yesu alobaki kaka: “Shiii! Fandá nyɛɛ!” Mbala moko, “mopɛpɛ ekitaki, mpe kimya moko monene ekɔtaki.”​—Marko 4:35-39.

Maladi: Eyebanaki ete Yesu azali na nguya ya kobikisa bato oyo bakufá miso, batɛngumi, ezala mpe bato ya maladi ya ndɛkɛ, bato ya maba, mpe mbeba mosusu nyonso. “Abikisaki baoyo nyonso bazalaki koyoka nzoto malamu te.”​—Matai 4:23, 24; 8:16; 11:2-5.

Kozanga bilei: Yesu asalelaki nguya oyo Tata na ye apesaki ye mpo na kokómisa biloko ya kolya ebele. Biblia elobi ete ntango Yesu azalaki kosakola, aleisaki bankóto ya bato mbala mibale.​—Matai 14:14-21; 15:32-38.

Liwa: Masolo ya bato misato oyo Yesu asekwisaki emonisi polele ete Yehova azali na nguya ya kosilisa liwa. Kutu, moko ya bato oyo Yesu asekwisaki, akufaki banda mikolo minei.​—Marko 5:35-42; Luka 7:11-16; Yoane 11:3-44.

a Mpo na koyeba makambo mosusu etali mikolo ya nsuka, talá buku Sepelá na bomoi libela na libela! liteya 32, ebimisami na Batatoli ya Yehova, mpe okoki kozwa yango ofele na site Internet www.pr2711.com.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto