Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/10 lok. 3
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2010
Mosala na biso ya Bokonzi—2010
km 12/10 lok. 3

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 27 Desɛmbɛ 2010. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 20. Bozongeli yango ekotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 1 Novɛmbɛ tii na pɔsɔ ya 27 Desɛmbɛ 2010.

1. Maloba ya kokumisa Yehova, oyo ezali na 1 Ntango 16:34, oyo Balevi oyo bazalaki bayembi bayembaki, eteyi biso nini? [w02 15/1 lok. 11 par. 6-7]

2. 1 Ntango 22:8 emonisi nde ete Davidi asalaki mabe ndenge abundaki bitumba, mpo Yehova aboyaki atongela ye ndako? Limbolá. [it-2-F lok. 869 par. 11]

3. Mokonzi Davidi alingaki mwana na ye atalelaka Nzambe ndenge nini? (1 Nta. 28:9) [w08 15/10 lok. 7 par. 18]

4. Mpo na nini ebongaki mpenza básalela bikeko ya bangɔmbɛ lokola makonzí oyo esimbaki saani ya ebende? (2 Nta. 4:2-4) [w05 1/12 lok. 19 par. 3; w98 15/6 lok. 16 par. 17]

5. Sanduku ya kondimana ezalaki kaka na bitanda mibale ya mabanga, to ezalaki mpe na biloko mosusu? (2 Nta. 5:10) [w06 15/1 lok. 31]

6. Salomo alingaki koloba nini ntango asɛngaki Yehova ayoka malɔmbɔ ya moto nyonso oyo azali ‘kobondela wana atali na ngámbo ya ndako oyo’? (2 Nta. 6:21, 32, 33) [it-1-F lok. 36 par. 5]

7. Maloba “kondimana ya mungwa” oyo ezali na 2 Ntango 13:5 elimboli nini? [w05 1/12 lok. 20 par. 2; it-2-F lok. 921 par. 5]

8. Ndenge nini tokoki kosalela etinda oyo ezali na 2 Ntango 17:9, 10 na mosala na biso ya kosakola? [w09 15/6 lok. 12 par. 7]

9. Ndenge nini basaleli ya Nzambe bakosala na boyokani na 2 Ntango 20:17? [w03 1/6 nk. 21-22 par. 14-17]

10. Liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo Mokonzi Uziya asalaki, oyo emonisi ete azalaki na lolendo? (2 Nta. 26:15-21) [w99 1/12 lok. 26 par. 1-2]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto