Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/13 lok. 3
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 2/13 lok. 3

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo elandi ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 25 sanza ya mibale 2013. Dati ya lisolo mokomoko epesami mpo na kosalisa mosakoli asala bolukiluki pɔsɔ na pɔsɔ wana azali kobongisa masolo ya eteyelo.

  1. Mpo na nini Yesu alobaki ete “baoyo bazali na mawa” bakozala na esengo? (Mat. 5:4) [7 sanza ya 1, w09 15/2 lok. 6 par. 6]

  2. Na libondeli ya ndakisa oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye, alingaki koloba nini ntango alobaki ete: “Salisá biso tókwea na komekama te”? (Mat. 6:13) [7 sanza ya 1, w04 1/2 lok. 16 par. 13]

  3. Mpo na nini Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakosilisa koleka na bingumba nyonso te na mosala na bango ya kosakola “liboso Mwana ya moto aya”? (Mat. 10:23) [14 sanza ya 1, w10 15/9 lok. 10 par. 12; w87-F 1/8 lok. 8 par. 6]

  4. Wapi makambo mibale oyo lisese ya Yesu oyo etali mbuma ya mutarde elobeli? (Mat. 13:31, 32) [21 sanza ya 1, w08 15/7 nk. 17-18 par. 3-8]

  5. Liteya nini Yesu ateyaki ntango alobaki ete: “Soki bobongwani te mpe bokómi lokola bana mike te, bokokɔta na bokonzi ya likoló te”? (Mat. 18:3) [28 sanza ya 1, w07 1/2 nk. 9-10 par. 3-4]

  6. Maloba ya Yesu oyo ete “yo moko olobi yango,” elimboli nini? (Mat. 26:63, 64) [11 sanza ya 2, w11 1/6 lok. 18]

  7. Mpo na nini Yesu abengami “Nkolo ata ya sabata”? (Mrk. 2:28) [18 sanza ya 2, w08 15/2 lok. 28 par. 7]

  8. Mpo na nini Yesu ayanolaki ndenge wana mpo na mama na ye mpe bandeko na ye, mpe yango eteyi biso nini? (Mrk. 3:31-35) [18 sanza ya 2, w08 15/2 lok. 29 par. 5]

  9. Ndenge ekomami na Marko 8:22-25, ekoki kozala mpo na nini Yesu abikisaki mokemoke moto moko oyo akufá miso, mpe yango eteyi biso nini? [25 sanza ya 2, w00 15/2 lok. 17 par. 7]

  10. Liteya nini tozwi na ndenge Yesu asalaki ntango Petro apamelaki ye ndenge ezali na Marko 8:32-34? [25 sanza ya 2, w08 15/2 lok. 29 par. 6]

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto