Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/14 lok. 3
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2014
Mosala na biso ya Bokonzi—2014
km 10/14 lok. 3

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo elandi ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 27 sanza ya zomi 2014.

  1. Mpo na nini Bayisraele bazalaki koimaima mpo na Nzambe mpe mpo na Moize, ndenge ekomami na Mitángo 21:5, mpe lisolo yango ezali na likebisi nini mpo na biso? [1 sanza ya 9, w99 15/8 nk. 26-27]

  2. Mpo na nini nkanda ya Yehova engalelaki Balaama? (Mit. 22:20-22) [8 sanza ya 9, w04 1/8 lok. 27 par. 2]

  3. Mitángo 25:11 eyebisi biso nini mpo na ezaleli ya Finehase, mpe ndenge nini tokoki komekola ye? [8 sanza ya 9, w04 1/8 lok. 27 par. 4]

  4. Na ndenge nini Moize atikelaki biso ndakisa moko malamu ya komikitisa lelo oyo? (Mit. 27:5, 15-18) [15 sanza ya 9, w13 1/2 lok. 5]

  5. Ndenge nini Yosua mpe Kalebe bamonisaki mpenza ete bato ya kozanga kokoka bakoki kolanda banzela ya Yehova na makambo nyonso atako batɛmɛli bango? (Mit. 32:12) [22 sanza ya 9, w93 15/11 lok. 14 par. 13]

  6. Liteya nini mokristo oyo azali monzemba akoki kozwa na ndakisa ya botosi ya bana basi ya Zelofehade? (Mit. 36:10-12) [29 sanza ya 9, w08 15/2 nk. 4-5 par. 10]

  7. Lokola Bayisraele baimaimaki mpe babimisaki maloba mabe esukaki ndenge nini, mpe liteya nini tokoki kozwa na lisolo yango? (Mib. 1:26-28, 34, 35) [6 sanza ya 10, w13 15/8 lok. 11 par. 7]

  8. Mpo Yehova apambola Bayisraele mpe bázala malamu na Mokili ya Ndaka, wapi mikumba mibale oyo basengelaki kokokisa? (Mib. 4:9) [13 sanza ya 10, w06 1/6 lok. 29 par. 15]

  9. Na ndenge nini bilamba ya Bayisraele ekufaki te mpe makolo na bango evimbaki te na mobembo na bango na esobe? (Mib. 8:3, 4) [20 sanza ya 10, w04 15/9 lok. 26 par. 1]

  10. Ndenge nini tokoki kosalela toli oyo Bayisraele bazwaki ya ‘kokangama kaka’ na Yehova? (Mib. 13:4, 6-9) [27 sanza ya 10, w02 15/10 lok. 16 par. 14]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto