Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w21 Octobre nk. 14-17
  • Ndenge ya kokómisa lisusu makasi boninga na yo elongo ná Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kokómisa lisusu makasi boninga na yo elongo ná Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MIKAKATANO OYO OKOKI KOKUTANA NA YANGO
  • OMITYELA MIKANO OYO EBONGI
  • KOLƐMBA TE!
  • ‘Bengá bankulutu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Tomekola motema mawa na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Yehova alingaka yo mpenza!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Bankulutu: Bókoba komekola ntoma Paulo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
w21 Octobre nk. 14-17
Ndeko mobali moko azali komitungisa koleka ndelo wana azali kokanisa ntango mpe milende oyo ekosɛnga asala mpo na kokómisa lisusu makasi boninga na ye ná Yehova.

Ndenge ya kokómisa lisusu boyokani na yo ná Yehova makasi

MBULA na mbula, bato mingi bazongisamaka lisusu na lisangá ya Yehova. Kanisá ‘esengo monene oyo ezalaka na likoló’ mbala nyonso oyo moto moko azongisami na lisangá! (Luka 15:7, 10) Soki outi kozongisama na lisangá, yebá ete Yesu, baanzelu mpe Yehova ye moko basepeli mingi mpenza mpo na likambo yango. Kasi wana ozali kokómisa lisusu boninga na yo ná Yehova makasi, okoki kokutana na mwa mikakatano. Mikakatano nini, mpe nini ekoki kosalisa yo?

MIKAKATANO OYO OKOKI KOKUTANA NA YANGO

Bandeko mingi bakobaka kaka kobunda na makanisi ya mabe ata nsima ya kozongisama na lisangá. Mbala mosusu ozali komiyoka lokola Mokonzi Davidi. Ata nsima ya kolimbisama ya masumu na ye, alobaki boye: “Makambo ya libunga eleki ngai na makasi.” (Nz. 40:12; 65:3) Ata nsima ya kozongisama na lisangá, moto akoki kokoba komiyoka kaka ete amemi ngambo, ata mpe koyoka nsɔni na boumeli ya bambula mingi. Isabelle alongolamaki na lisangá mpe azongisamaki nsima ya mbula 20.a Alobi boye: “Ezalaki mpenza mpasi nandima ete Yehova akokaki kolimbisa ngai.” Soki olɛmbi nzoto, yango ekoki kolɛmbisa yo lisusu na elimo. (Mas. 24:10) Kotika te likambo yango ekómela yo.

Basusu bamonaka ete ezali mpasi básala makambo nyonso oyo esengeli mpo bázongisa lisusu boninga makasi ná Yehova. Nsima ya kozongisama na lisangá, ndeko mobali moko na nkombo Antoine alobaki boye: “Nayokaki lokola nabosanaki makambo nyonso oyo nayekolaki mpe oyo nazalaki kosala ntango nazalaki Motatoli ya Yehova.” Komiyoka bongo ekoki kosala ete bato mosusu bámipesa mobimba te na makambo ya elimo.

Na ndakisa, soki mopɛpɛ moko makasi ebebisi ndako ya moto moko, akoki komitungisa mpenza soki akanisi ntango mpe makasi oyo ekosɛnga mpo na kotonga yango lisusu. Ndenge moko mpe, soki lisumu moko ya monene oyo osalaki ebebisi boninga na yo elongo na Yehova, okoki komona ete ekosɛnga osala lisusu milende mingi mpo na kobongisa likambo yango. Kasi yebá ete okosala yango na makasi na yo moko te.

Yehova ayebisi biso boye: “Bóya mpe tóbongisa makambo kati na biso.” (Yis. 1:18) Osili kosala makasi mpo na ‘kobongisa makambo.’ Yehova alingaka yo ndenge osali milende wana. Kanisá naino: lokola ozongisami na lisangá, opesi Yehova likoki ya komonisa ete Satana azali mobuki-lokuta!​—Mas. 27:11.

Kosala bongo esalisi yo opusana lisusu penepene na Yehova. Alaki ete ye mpe akopusana penepene na yo. (Yak. 4:8) Ezali malamu bandeko mosusu bámona ete ozongisami na lisangá. Kasi osengeli kosuka kaka wana te. Osengeli kokoba kokómisa makasi bolingo na yo mpo na Moninga mpe Tata na yo, Yehova. Ndenge nini okoki kosala yango?

OMITYELA MIKANO OYO EBONGI

Meká komityela mikano oyo ebongi. Na ntembe te obosaná te mateya ya moboko oyo etali Yehova mpe bomoi oyo alaki na mikolo ezali koya. Kasi osengeli kobongisa lisusu makambo etali bomoi na yo ya bokristo, na ndakisa kosakola nsango malamu mpe koyanganaka elongo na bandeko na yo bakristo. Tótalela mwa mikano oyo okoki komityela.

Sololáká na Yehova mbala na mbala. Tata na yo ayebi ete soki okobi komipesa foti, ekoki kozala mpasi obondela ye. (Rom. 8:26) Atako bongo, ‘tingamá na mabondeli,’ yebisá Yehova ndenge oyo osepelaka mpenza kozala moninga ye. (Rom. 12:12) Andrej abosanaka te makambo oyo ekómelaki ye. Alobi boye: “Nazalaki mpenza komipesa foti mpe koyoka nsɔni. Kasi mbala nyonso nsima ya kobondela, makanisi yango ezalaki kolongwa. Nazalaki mpenza kozwa kimya ya makanisi.” Soki ozali koyeba te makambo oyo osengeli kobondela mpo na yango, talelá lisusu mabondeli oyo Mokonzi David asalaki ntango abongolaki motema. Mabondeli yango ezali na Nzembo 51 mpe 65.

Yekoláká Biblia mbala na mbala. Yango ekokómisa kondima na yo makasi mpe ekosalisa yo olinga lisusu Yehova mingi. (Nz. 19:7-11) Felipe alobi boye: “Lokola nazalaki te na programɛ malamu ya kotánga mpe koyekola Biblia, yango esalaki ete nalɛmba mpe natika Yehova. Lokola nalingaki te kozongela lisusu libunga oyo nasalaki, yango wana nasalaki makasi natya programɛ ya boyekoli na ngai moko.” Yo mpe okoki kosala bongo. Soki olingi koyeba masolo oyo okoki kotya na programɛ ya boyekoli na yo moko, okoki kosolola na moninga moko oyo akɔmeli na elimo.

Kómisá lisusu makasi boninga na yo elongo na bandeko. Bandeko mosusu oyo bazongisamá na lisangá babangaka ete basusu bakotalela bango na ndenge ya mabe. Larissa alobi boye: “Nayokaki mpenza nsɔni mpe namonaki lokola nasalaki bandeko ya lisangá mabe mpenza. Eumelaki ntango molai mpo makanisi yango elongwa.” Na yango, yebá ete bankulutu mpe bandeko mosusu oyo bakɔmeli na elimo bakosepela kosalisa yo wana ozali kokómisa lisusu boninga na yo ná Yehova makasi. (Talá etanda “Oyo bankulutu bakoki kosala.”) Bazali kosepela ndenge ozongeli Yehova mpe balingi ete ozala na esengo!​—Mas. 17:17.

Okoki kosala nini mpo ozala lisusu penepene ya bandeko ya lisangá? Omipesa mobimba na makambo oyo bandeko ya lisangá bazali kosala, na ndakisa, koyanganaka na makita mpe kobima mbala na mbala na mosala ya kosakola. Yango ekosalisa yo na nini? Felix alobi boye: “Bandeko bazalaki kozela na mposa makasi ete nazongela Yehova. Namonaki ete nazali mpenza na ntina. Bango nyonso basalisaki ngai namiyoka ete nazongi lisusu na libota ya Yehova, ete balimbisi ngai mpe nakoba kokende liboso.”​—Talá etanda “Oyo okoki kosala.”

Oyo okoki kosala

Zongelá makambo ya elimo oyo ozalaki kosala liboso

Nkulutu moko azali kobondela elongo na ndeko mobali moko oyo azongeli Yehova.

SOLOLÁKÁ NA YEHOVA MBALA NA MBALA

Yebisá Yehova ndenge oyo osepelaka mpenza kozala moninga na ye. Bankulutu bakobondela mpo na yo mpe elongo na yo

Nkulutu yango azali kosalela buku “Pusaná penepene na Yehova” mpo na koyekola na ndeko yango.

YEKOLÁKÁ BIBLIA MBALA NA MBALA

Omileisaka na elimo. Yango ekosala ete bolingo na yo mpo na Yehova ekóma makasi

Ndeko mobali yango azali elongo na bandeko mosusu ya lisangá mpe bazali kosolola.

KÓMISÁ LISUSU MAKASI BONINGA NA YO ELONGO NA BANDEKO

Yanganáká na makita ya lisangá mpe bimáká na mosala ya kosakola elongo na bandeko

KOLƐMBA TE!

Wana ozali kokoba kokómisa lisusu makasi boninga na yo elongo na Yehova, Satana akokoba kobimisela yo mikakatano mpo na kolɛmbisa kondima na yo. (Luka 4:13) Na yango, kómisá kondima na yo makasi mpo olonga mikakatano yango.

Yehova alaki boye mpo na bampate na ye: “Oyo ebungi, nakoluka yango; oyo epalangani, nakozongisa yango; oyo ebukani, nakokanga yango eteni ya elamba mpe oyo ezali kobɛla, nakokembisa yango.” (Ezk. 34:16) Yehova asalisá bandeko mingi mpo bázongisa lisusu boyokani malamu elongo na ye. Yebá ete alingi kosalisa yo okóma na boyokani ya makasi koleka elongo na ye.

Oyo bankulutu bakoki kosala

Nkulutu azali kosalisa ndeko mobali yango akómisa lisusu makasi boninga na ye elongo ná Yehova.

Bankulutu basalaka makasi mpo na kosalisa bandeko oyo bazongisami na lisangá bákómisa lisusu boyokani na bango ná Yehova makasi. Tótala mwa makambo oyo bankulutu basalaka mpo na baoyo bazongisami na lisangá.

Balendisaka bango. Ntoma Paulo ayebaki ete mosumuki oyo abongoli motema akoki ‘kozinda na mawa oyo eleki ndelo.’ (2 Ko. 2:7) Mbala mingi akoki komiyoka ete amemi ngambo mpe kolɛmba nzoto. Paulo apesaki lisangá toli oyo: “Bosengeli nde kolimbisa ye na boboto mpe kobɔndisa ye.” Esengeli kosalisa baoyo bazongisami na lisangá báyeba ete Yehova mpe bandeko ya lisangá balingaka bango mingi. Kopesaka bango longonya mpe kosalisa bango ekoki kosala ete bálɛmba nzoto te.

Babondelaka elongo na bango. Yakobo akomaki boye: “Lilɔmbɔ ya moyengebene ezalaka na bokasi mingi ntango ezali kosala mosala.” (Yak. 5:16) Larissa, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Nayebisaki bankulutu makambo oyo ezalaki kotungisa mpe kobangisa ngai. Babondelaki mpo na ngai. Yango esalisaki ngai namona ete bankulutu bakangelaki ngai nkanda te. Bazalaki nde na mposa ya kosalisa ngai nakóma lisusu na boyokani malamu elongo na Yehova.” Ndeko mobali moko na nkombo Theo alobi boye: “Mabondeli oyo bankulutu basalaki esalisaki ngai namona ete Yehova alingaka ngai mpenza mpe amonaka kaka te makambo ya mabe oyo nasalaka, kasi mpe oyo ya malamu.”

Bakómaka baninga na bango. Baoyo bazongisami na lisangá bazalaka na mposa ya kozwa baninga na kati ya lisangá. Nkulutu moko na nkombo Justin alobi boye: “Lukáká mabaku nyonso mpo na kosakola elongo na bango mpe oyo eleki ntina, kendáká kotala bango na bandako na bango. Ezali na ntina mingi kozala moninga na bango!” Nkulutu mosusu na nkombo Henry alobi boye: “Soki bandeko mosusu ya lisangá bamoni ete bankulutu bazali kosala boninga elongo na bandeko oyo bazongisami na lisangá, bakosala mpe bongo.”

Basalisaka bango báyekolaka. Ndeko oyo akɔmeli na elimo akoki kosalisa moto oyo azongisami na lisangá asala programɛ ya malamu ya koyekola. Nkulutu moko na nkombo Darko alobi boye: “Nasepelaka koyebisa basusu makambo ya ntina oyo nazwi na boyekoli na ngai mpe koyebisa bango ndenge oyo koyekola Biblia epesaka ngai esengo. Nazwaka mpe bibongiseli mpo tóyekola makambo mosusu elongo.” Nkulutu mosusu na nkombo Clayton alobi boye: “Nalendisaka bango báluka masolo ya Biblia oyo eyokani na makambo oyo ekómelaki bango.”

Bazalaka babateli ya mpate ya malamu mpo na bango. Baoyo bazongisami na lisangá bamoná ndenge oyo bankulutu bakokisaka mokumba na bango ya kozala basambisi. Kasi sikoyo, bazalaka na mposa bámona ete bankulutu bazali mpenza babateli ya mpate. (Yir. 23:4) Yokáká bango mpe pesáká bango longonya. Sololáká na bango mbala na mbala. Talá oyo nkulutu moko na nkombo Marcus asalaka ntango akei kotala bandeko mpo na kolendisa bango. Alobi boye: “Totángelaka bango bavɛrsɛ ya Biblia, topesaka bango longonya, mpe tomonisaka bango ete tosepelaka ndenge basali makasi bázongela lisusu Yehova; Yehova mpe asepelaka na bango. Nsima ya kotala bango, totyaka mokolo oyo tokokutana lisusu mpo na kosolola.”

a Na lisolo oyo topesi bango bankombo mosusu.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto