Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w22 Décembre nk. 28-30
  • Omilɛngɛli mpo na ‘kozwa libula ya mabele’?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Omilɛngɛli mpo na ‘kozwa libula ya mabele’?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • OMILƐNGƐLI MPO NA KOPESA MABƆKƆ NA MOSALA YA KOKÓMISA MABELE PARADISO?
  • OMILƐNGƐLI MPO NA KOSALISA BATO OYO BAKOSEKWA?
  • OMILƐNGƐLI MPO NA KOTEYA BATO OYO BAKOSEKWA?
  • Lisekwa ekozala!
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Banani bakosekwa? Bakofanda epai wapi?
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Eteni 10
    Yoká Nzambe
  • Lisekwa ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
w22 Décembre nk. 28-30
Bato bazali kobongisa mabele mpo ekóma Paradiso. Bandeko mosusu bazali kolongola bosɔtɔ, bamosusu bazali kotonga ndako, mpe basusu bazali kokata elanga.

Omilɛngɛli mpo na ‘kozwa libula ya mabele’?

BISO nyonso tozelaka na motema moko kokokisama ya elaka oyo ya Yesu: “Esengo na bato ya ezaleli ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabele.” (Mat. 5:5) Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakozwa libula ya mabele ntango bakokóma bakonzi mpe bakoyangela elongo na Yesu kuna na likoló. (Em. 5:10; 20:6) Bakristo mingi lelo oyo bazelaka na motema ya kokita ntango oyo bakozwa libula na bango awa na mabele mpe bakofanda libela na libela na nzoto ya kokoka, na kimya mpe na esengo. Mpo yango esalema, bakozala na makambo mingi ya kosala. Tótalela makambo misato: kobongisa mabele, koyamba bato oyo bakosekwa, mpe koteya bango. Tótalela mpe makambo oyo okoki kosala banda sikoyo mpo na komonisa ete ozali na mposa makasi ya kosala makambo yango na mokili ya sika.

OMILƐNGƐLI MPO NA KOPESA MABƆKƆ NA MOSALA YA KOKÓMISA MABELE PARADISO?

Ntango Yehova apesaki bato etinda ete ‘bátondisa mabele mpe bátya yango na nse na bango’ alingaki komonisa ete mabele mobimba esengelaki mokemoke kokóma Paradiso. (Eba. 1:28) Baoyo bakozala na bomoi ya seko awa na mabele basengeli kotosa kaka etinda moko wana. Na ebandeli mabele ekozala naino te Paradiso, mpamba te elanga ya Edene ezali lisusu te. Nsima ya etumba ya Armagedone, tokozala na mosala makasi ya kopɛtola bisika mosusu ya mabele oyo ebebisamaki. Yango ekozala mpenza mosala moko ya makasi!

Yango ekundweli biso mosala makasi oyo Bayisraele basalaki ntango bazongaki na mboka na bango uta na Babilone. Na boumeli ya mbula 70, moto moko te azalaki kofanda na mboka na bango. Kasi Yisaya asakolaki ete na lisalisi ya Yehova, bakozala na likoki ya kobongisa lisusu mboka na bango. Esakweli elobaki ete: “Akokómisa esobe na ye lokola Edene mpe mokili patatalu na ye oyo ekauká lokola elanga ya Yehova.” (Yis. 51:3) Yehova asalisaki Bayisraele bakómisa lisusu mboka na bango kitoko. Ndenge moko, na lisalisi ya Yehova, baoyo bakozwa libula ya mabele bakolonga kokómisa mabele Paradiso moko ya kitoko. Ezali mpe na makambo oyo okoki kosala banda sikoyo mpo na komonisa ete olingi kopesa mabɔkɔ na mosala yango.

Lolenge moko okoki kosala yango ezali ya kosala makasi mpo na kopɛtola ndako na yo, kotya biloko na molɔngɔ mpe kopɛtola zingazinga ya esika oyo ofandi. Okoki kosala yango atako bato oyo bafandi zingazinga na yo bazali pɛto te. Okoki kosala lisusu mingi koleka ntango ozali kosalisa mpo na kosokola mpe kobatela Ndako ya Bakonzi na bino mpe Ndako ya Mayangani. Soki makambo ya bomoi na yo epesi yo nzela, okoki mpe kopesa mabɔkɔ mpo na kosalisa bandeko na ntango ya likama. Kosala bongo ekomonisa ete ozali na mposa ya kosalisa bandeko. Omituna boye: ‘Nasengeli kokolisa makoki na ngai na likambo moko oyo nakosalela soki Yehova alingi nazala na bomoi ya seko awa na mabele?’

Etuluku moko ya bandeko basi mpe mibali bazali kopɛtola mpe kobongisa Ndako ya Bokonzi.

OMILƐNGƐLI MPO NA KOSALISA BATO OYO BAKOSEKWA?

Kaka nsima ya kosekwisa mwana mwasi ya Yairuse, Yesu alobaki ete bápesa mwana yango eloko ya kolya. (Mrk. 5:42, 43) Ekoki kozala ete ezalaki mosala moko ya mpasi te mpo na kokokisa bamposa ya mwana mwasi yango ya mbula 12. Kasi meká kokanisa mosala oyo ekosɛnga, ntango Yesu akokokisa elaka na ye ete “baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo na ye.” (Yoa. 5:28, 29) Atako Biblia elobeli yango polele te, tokoki komona na makanisi ndenge bato oyo bakosekwa bakozala na mposa ya lisalisi mpo na kozwa biloko ya kolya, bisika ya kofanda mpe bilamba. Okoki kosala nini banda sikoyo mpo na komonisa ete omilɛngɛli mpe ozali na mposa ya kopesa mabɔkɔ? Tótalela mwa mituna oyo.

Lelo oyo, ndenge nini okoki komonisa ete omilɛngɛli mpo na kozwa libula ya mabele?

Bandeko basi mpe mibali oyo bazali na esengo bayei na esika ya kozela mpɛpɔ mpo na koyamba bandeko oyo bauti na mikili mosusu mpo na liyangani oyo esangisaka mikili mingi na Paris.

Ntango liyebisi epesamaka ete mokɛngɛli ya zongazonga akoya kotala lisangá na bino, omibongisaka mpo na kobengisa ye na ndako mpo alya mwa eloko? Ntango bandeko oyo bazalaki na mosala ya ntango nyonso, mosala esili mpe Betele etindi bango na lisangá na bino to ntango mosala ya mokɛngɛli ya zongazonga moko esili, osalaka makasi mpo na kosalisa ye azwa esika ya kofanda? Soki liyangani ya etúká to liyangani ya sipesiale ekosalema na esika oyo ofandi, okoki kopesa mabɔkɔ na misala oyo ekosalema liboso mpe nsima ya liyangani to koyamba bandeko oyo bakouta na mikili mosusu oyo bakoya na liyangani?

OMILƐNGƐLI MPO NA KOTEYA BATO OYO BAKOSEKWA?

Na boyokani na Misala 24:15, tozali kozela ete bamiliare ya bato bakosekwa. Mingi na bango bakozala bato oyo bazwaki libaku te ya koyeba Yehova. Yango wana, bakozwa libaku yango nsima ya lisekwa na bango.a Basaleli ya sembo ya Nzambe mpe ya makoki, bakopesa mabɔkɔ mpo na koteya bango. (Yis. 11:9) Ndeko mwasi Charlotte, oyo asakolaki na Mpoto, na Amerika ya Sudi mpe na Afrika azali mpenza kozela ntango yango. Na esengo nyonso, alobi boye: “Nazali na mposa makasi ya koteya bato oyo bakosekwa. Ntango natángaka lisolo ya moto moko ya kala, mbala mingi namilobelaka boye: ‘Soki kaka moto oyo ayebaka Yehova, mbɛlɛ bomoi na ye ekokaki kozala boye te.’ Nazali na mposa makasi ya koyebisa bato oyo bakosekwa makambo etali Yehova mpe ndenge bomoi na bango ekozala malamu mingi soki basaleli ye.”

Ata basaleli ya sembo ya Yehova oyo bazalaki na bomoi liboso Yesu aya awa na mabele bakozala na makambo ebele ya koyekola. Meká kokanisa esengo oyo okozala na yango ntango ozali kolimbwela Danyele kokokisama ya bisakweli oyo ye moko akomaki, kasi azalaki kokanga ntina na yango te. (Dan. 12:8) To meká komona na makanisi ntango okosalisa Ruta ná Naomi báyeba ete mabota na bango ezalaki na molɔngɔ ya bankɔkɔ oyo ememaki na Masiya. Tokozala na esengo ya koteya bato na mabele mobimba, mpe tokolɛmba nzoto te mpe tokozala na mitungisi te ndenge tozali kokutana na yango lelo oyo na mokili oyo ya mabe!

Ndeko mwasi moko azali kopesa mwasi moko trakte na esika ya kosukola bilamba.

Lelo oyo, ndenge nini okoki komonisa ete ozali na mposa ya kopesa mabɔkɔ na mosala yango ya koteya bato oyo bakosekwa? Lolenge moko ya komonisa yango ezali ya kosala makasi ya kokolisa lisusu makoki na yo ya koteya mpe komipesa ntango nyonso na mosala ya kosakola oyo ezali kosalema lelo oyo na mokili mobimba. (Mat. 24:14) Atako mbula oyo ozali na yango to makambo mosusu ya bomoi ezali kopesa yo nzela te ya kosala mingi, yebá ete milende oyo ozali kosala ezali komonisa mposa makasi oyo ozali na yango mpo na koteya bato oyo bakosekwa.

Ezali malamu mpenza kokanisa na mituna oyo ya ntina mingi: Ozali mpenza na mposa makasi ya kozwa libula ya mabele? Ozali na mposa makasi ya kopesa mabɔkɔ mpo na kobongisa mabele, kosalisa bato oyo bakosekwa mpe koteya bango? Okomonisa ete omilɛngɛli mpo na kofanda awa na mabele libela na libela ntango ozali komipesa na misala oyo okosala ntango okozwa libula ya mabele!

a Talá lisolo “Bazali komema ebele epai ya boyengebene” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 09/2022.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto