Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w22 Décembre lok. 14
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Masolo mosusu
  • Yehova ‘asikolaki’ na ntango ya kala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Tyelá elimo ya Nzambe motema ntango bomoi na yo ezali kobongwana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • “Teyá ngai nayeba kosala mokano na yo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Tókumisa nkombo ya Yehova elongo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
w22 Décembre lok. 14

Mituna ya batángi

Ndenge Nzembo 61:8 emonisi yango, mokomi ya nzembo Davidi alekisaki nde ndelo ntango akomaki ete akokumisa nkombo ya Nzambe “seko”?

Mokonzi Davidi azali koyeba wana azali kobɛta nzɛnzɛ.

Te. Makambo oyo Davidi alobaki ezalaki solo.

Tótala makambo oyo akomaki na vɛrsɛ yango mpe na bavɛrsɛ oyo ekokani na yango: “Boye nakobɛtɛla nkombo na yo mondule mpo na seko, mpo nakokisa bilako na ngai mokolo na mokolo.” “Ee Yehova Nzambe na ngai, nazali kokumisa yo na motema na ngai mobimba, mpe nakopesa nkombo na yo nkembo mpo na ntango oyo etyami ndelo te.” “Nakosanzola nkombo na yo mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko.”​—Nz. 61:8; 86:12; 145:1, 2.

Ntango Davidi akomaki maloba wana, akanisaki te ete akokufa soki moke te. Ayebaki ete bato basengeli kokufa mpo basalaki lisumu. Lisusu, Davidi ayebaki mpe ete azalaki mosumuki. (Eba. 3:3, 17-19; Nz. 51:4, 5) Ayebaki ete ata bato ya kondima, lokola Abrahama, Yisaka, mpe Yakobo, basilaki kokufa. Longola yango, Davidi ayebaki ete ye mpe akokufa. (Nz. 37:25; 39:4) Kasi maloba na ye oyo ezali na Nzembo 61:8 emonisaki mposa mpe ekateli oyo azalaki na yango mpo na kokumisa Nzambe seko, elingi koloba, ntango nyonso oyo akozala na bomoi.​—2 Sa. 7:12.

Na bantango mosusu, Davidi akomaki makambo oyo akutanaki na yango na bomoi na ye, ndenge tokoki komona yango na maloba ya ebandeli ya loyembo ya Nzembo 18, 51, mpe 52. Na Nzembo 23, Davidi alobelaki Yehova lokola mobateli ya mpate oyo apesaka litambwisi, bisika ya kopema, mpe libateli. Davidi azalaki mobateli ya mpate ya ndenge wana. Lisusu, alingaki kosalela Nzambe ‘mikolo nyonso ya bomoi na ye.’​—Nz. 23:6.

Kobosana te ete Yehova atindaki Davidi akoma makambo nyonso oyo akomaki. Makambo oyo akomaki esangisaki mpe bisakweli etali makambo oyo esengelaki kosalema bambula mingi na nsima. Na ndakisa, na Nzembo 110, Davidi alobelaki ntango oyo Nkolo na ye ‘akofanda na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe’ na likoló mpe akozwa nguya monene. Mpo na kosala nini? Mpo na kotya banguna ya Nzambe na nse na ye mpe ‘kopesa etumbu na kati ya bikólo’ na mabele. Davidi azalaki moko ya bankɔkɔ ya Masiya, moto oyo akoyangela uta na likoló mpe akozala “nganga-nzambe mpo na ntango oyo etyami ndelo te.” (Nz. 110:1-6) Yesu alobaki ete esakweli oyo ezali na Nzembo 110 ezalaki kolobela nde ye mpe ekokokisama na mikolo ezali koya.​—Mat. 22:41-45.

Ya solo, na litambwisi ya Nzambe, Davidi akomaki makambo oyo ekokisamaki na ntango na ye mpe oyo ekokokisama na mikolo ezali koya ntango akosekwa mpe akozala na likoki ya kokumisa Yehova seko na seko. Na yango, Nzembo 37:10, 11, 29 ekoki kosalelama mpo na ntango oyo ekomamaki mpe mpo na mikolo ezali koya. Bavɛrsɛ yango ekokisamaki na ntango ya kala na mokili ya Yisraele mpe ekokokisama na mikolo ezali koya ntango Nzambe akokokisa bilaka na ye.​—Talá paragrafe 8 ya lisolo “Okozala na ngai na Paradiso” na nimero oyo.

Na yango, Nzembo 61:8 mpe bavɛrsɛ oyo ekokani na yango emonisi ete Davidi akumisaki Yehova na Yisraele ya kala tii ntango akufaki. Mpe ezali komonisa makambo oyo Davidi akosala na mikolo ezali koya ntango Yehova akozongisa ye na bomoi.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto