Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Septembre nk. 14-19
  • Pesáká basusu limemya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Pesáká basusu limemya
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KOPESA BASUSU LIMEMYA ELIMBOLI NINI?
  • LIMEMYA EPAI YA BANDEKO YA LIBOTA
  • LIMEMYA EPAI YA BANDEKO YA LISANGÁ
  • PESÁKÁ BAOYO BAZALI BATATOLI TE LIMEMYA
  • Mpo na nini limemya elimwe boye na mokili?
    Lamuká!—2024
  • Ozalaka moto ya liboso na kopesa basusu lokumu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mpo na nini osengeli kotosa bokonzi?
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Ndenge ya komoniselana limemya
    Lamuká!—2016
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Septembre nk. 14-19

LISOLO YA BOYEKOLI 38

LOYEMBO 120 Tómekola motema pɛtɛɛ ya Kristo

Pesáká basusu limemya

“Kozala moto oyo bamemyaka ezali malamu koleka palata ná wolo.”—MAS. 22:1.

NA MOKUSE

Tótala ntina oyo tosengeli kopesaka basusu limemya mpe ndenge oyo tokoki kosala yango ata na ntango oyo ezali mpasi.

1. Mpo na nini bato basepelaka ete basusu bápesa bango limemya? (Masese 22:1)

OSEPELAKA ntango bato bazali kopesa yo limemya? Na ntembe te osepelaka. Moto nyonso alingaka ete basusu bámemya ye. Mpe toyokaka esengo ntango basusu bapesi biso limemya. Yango wana Biblia elobi ete “kozala moto oyo bamemyaka ezali malamu koleka palata ná wolo”!—Tángá Masese 22:1.

2-3. Mpo na nini ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te kopesa basusu limemya, mpe tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Kasi na bantango mosusu, ekoki kozala mpasi mpo tópesa basusu limemya. Ntina moko ezali ete tomonaka polele mabunga ya basusu. Longola yango, tozali na eleko oyo bato mingi bapesaka basusu limemya te. Kasi biso tosengeli kozala bongo te. Mpo na nini? Mpo Yehova alingi ete tókumisaka, to tópesaka limemya na “bato ya ndenge nyonso.”—1 Pe. 2:17.

3 Na lisolo oyo, tokoyekola soki kopesa basusu limemya elimboli nini mpe ndenge oyo tokoki komonisa limemya epai ya (1) bandeko ya libota, (2) bandeko na biso bakristo, mpe (3) baoyo bazali Batatoli te. Tokolobela mingimingi ndenge oyo tokoki kopesa basusu limemya na ntango oyo ezali mpasi kosala yango.

KOPESA BASUSU LIMEMYA ELIMBOLI NINI?

4. Komemya basusu elimboli nini?

4 Limemya elimboli nini? Na minɔkɔ mosusu, liloba “limemya” mpe “lokumu” ezali na boyokani. Ndenge nini? “Limemya” emonisaka libosoliboso ndenge oyo totalelaka moto. Na yango komemya basusu elimboli kotalela bango ete babongi tótyela bango likebi mpe kopesa bango kilo, mbala mosusu mpo na bizaleli na bango ya malamu, makambo oyo basalá, to mpo na mikumba oyo bazali na yango. Nzokande, “lokumu” emonisaka ndenge oyo tosalelaka moto makambo. Na yango kokumisa basusu elimboli kosalela bango makambo na ndenge oyo bakomiyoka ete bazali na ntina, tosepelaka na bango, mpe topesaka bango kilo. Kasi, tosengeli te kokumisa basusu na ndenge ya bokosi.—Mat. 15:8.

5. Nini etindaka biso tópesaka basusu limemya?

5 Yehova alingi ete tópesaka basusu limemya, na ndakisa “bakonzi oyo bazali liboso.” (Rom. 13:​1, 7) Kasi moto mosusu akoki koloba: “Nakopesa bato limemya, kasi kaka soki bazali kosala makambo oyo ebongi.” Likanisi yango ezali mpenza malamu? Biso basaleli ya Yehova toyebi ete limemya oyo topesaka bato ezalaka kaka te mpo na misala na bango. Ezalaka nde mpo na likambo moko ya ntina mingi: mpo tolingaka Yehova mpe tolukaka kosepelisa ye.—Yos. 4:14; 1 Pe. 3:15.

6. Okoki mpenza komemya moto oyo azangi limemya epai na yo? Limbolá. (Talá mpe elilingi.)

6 Basusu bakoki komituna boye: ‘Okoki mpenza komemya moto oyo azangi limemya epai na yo?’ Ɛɛ. Tótala mwa bandakisa. Mokonzi Saulo ayokisaki mwana na ye Yonatane nsɔni na miso ya bato. (1 Sa. 20:​30-34) Atako bongo, Yonatane akobaki kopesa tata na ye limemya mpe apesaki ye mabɔkɔ na bitumba tii mokolo oyo Saulo akufaki. (Kob. 20:12; 2 Sa. 1:23) Nganga-nzambe Monene Eli alobaki na Hana ete alangwe masanga. (1 Sa. 1:​12-14) Kasi, Hana alobaki na Eli na limemya nyonso, ata soki eyebanaki na Yisraele mobimba ete Eli azali tata mpe nganga-nzambe monene ya malamu te. (1 Sa. 1:​15-18; 2:​22-24) Mpe mibali mosusu ya Atene bafingaki ntoma Paulo, babengaki ye “moto ya bilobaloba.” (Mis. 17:18) Atako bongo, Paulo alobaki na bango na limemya. (Mis. 17:22) Bandakisa yango emonisi ete kolinga Yehova makasi mpe koboya kopesa ye mpasi nde ekoki kotinda biso tópesaka basusu limemya, kaka te ntango ezali pɛtɛɛ kosala yango kasi mpe na ntango oyo ezali mpasi. Tólobela sikoyo nani abongi na limemya na biso mpe mpo na nini.

Yonatane, Saulo, mpe basoda ya Yisraele bazali kobunda na mipanga, makɔnga, ná banguba na bango.

Atako tata na ye ayokisaki ye nsɔni, Yonatane akobaki kokɔtela ye mpe kopesa ye mabɔkɔ (Talá paragrafe 6)


LIMEMYA EPAI YA BANDEKO YA LIBOTA

7. Mpo na nini ekoki kozala mpasi mpo na biso kosalela bato ya libota makambo na limemya?

7 Mokakatano. Tolekisaka ntango mingi elongo na bato ya libota na biso. Na yango, toyebi bizaleli na bango ya malamu mpe mabunga na bango. Basusu bakoki kozala na maladi oyo esali ete ezala mpasi kosalisa bango, to bakoki kozala na mitungisi oyo eleki ndelo. Bandeko mosusu na libota bakoki ata koloba to kosala makambo oyo epesi biso mpasi. Na yango, na esika ndako ezala esika ya kopema mpe ya kimya, basusu bakɔtisaka mobulu na ndenge basalelaka bato ya libota makambo kozanga limemya. Yango esalaka ete boyokani ezala te na kati ya libota. Kaka ndenge maladi ya mingai elingaka te biteni ya nzoto etutana noki eswa, kozanga limemya epekisaka bato ya libota básalaka makambo na bomoko. Kasi na bokeseni na maladi ya mingai oyo esilaka libela te, biso tokoki koyekola kopesana limemya na kati ya libota mpe kobongisa boyokani na biso.

8. Mpo na nini ezali na ntina kopesaka bato ya libota limemya? (1 Timote 5:​4, 8)

8 Mpo na nini kopesa limemya? (Tángá 1 Timote 5:​4, 8.) Na mokanda na ye liboso epai ya Timote, Paulo alobeli ndenge oyo bato ya libota basengeli kosalelana makambo. Amonisi ete tosengeli kopesa bato ya libota na biso lokumu kaka te mpo ezali mokumba kasi libosoliboso nde mpo na “ezaleli ya kokangama na Nzambe.” Maloba yango elimboli kozala sembo na losambo mpe na mosala ya Nzambe. Yehova nde atyá ebongiseli ya libota. (Ef. 3:​14, 15) Na yango ntango tozali kopesa bato ya libota lokumu, tozali nde kokumisa Yehova, Mobandisi ya libota. Koyeba yango esengeli mpenza kotinda biso tópesaka bato ya libota na biso limemya!

9. Ndenge nini mwasi ná mobali bakoki kopesana limemya? (Talá mpe bililingi.)

9 Ndenge ya kopesa limemya. Mobali akumisaka mwasi na ye ntango azali komonisa ye ete azwaka ye na motuya, ezala na miso ya bato to ntango bazali kaka bango mibale. (Mas. 31:28; 1 Pe. 3:7) Abɛtaka ye te, ayokisaka ye nsɔni te, mpe asalaka te ete amiyoka ete azangi ntina. Ndeko mobali Ariel,a oyo afandaka na Argentine, alobi boye: “Maladi ya mwasi na ngai esalaka ete na bantango mosusu aloba makambo oyo ezokisaka ngai. Soki esalemi bongo, namikundwelaka ete makambo oyo alobi, yango te nde alingaki koloba. Soki makambo elekeli ngai, nakanisaka 1 Bakorinti 13:​5, mpe yango elendisaka ngai naloba na ye na limemya kasi te na ndenge ya kotyola.” (Mas. 19:11) Mwasi akopesa mobali na ye lokumu soki azali koloba malamu mpo na ye epai ya basusu. (Ef. 5:33) Aboyaka kosalisa ye masɛki ya bozoba, kotyola ye mpe kofinga ye; ayebi ete soki asali bongo ekobebisa libala. (Mas. 14:1) Ndeko mwasi moko na Italie oyo mobali na ye azalaka na mitungisi ebeleebele alobi boye: “Na bantango mosusu, namonaka ete mitungisi ya mobali na ngai elekaka ndelo. Liboso, maloba na ngai mpe ndenge nazalaki kotya elongi ezalaki komonisa limemya te epai na ye. Kasi namoni ete kolekisa ntango mingi elongo na bato oyo balobaka na basusu na limemya, esalisi ngai mpe nakóma komonisela mobali na ngai limemya.”

Bililingi: Mwasi moko ná mobali na ye bazali kosalelana makambo na limemya. 1. Mobali azali koloba na mwasi na ye na boboto wana bazali kolamba. 2. Mwasi azali kokumisa mobali na ye liboso ya bato oyo bayei kotala bango ntango mobali na ye azali kopesa ndeko mobali moko ya mobange bilei.

Ntango tozali kopesa bato ya libota limemya, tozali kokumisa nde Yehova, Mobandisi ya libota (Talá paragrafe 9)


10. Ndenge nini bilenge bakoki kopesa baboti na bango limemya?

10 Bilenge, bótosaka mibeko oyo baboti na bino batyeli bino. (Ef. 6:​1-3) Bólobaka na baboti na limemya. (Kob. 21:17) Ntango baboti bazali kokóma mibange, bakoki kozala na mposa bótyelaka bango lisusu likebi mingi. Bósala nyonso bókokisaka bamposa na bango. Tótalela ndakisa ya María, oyo tata na ye azali Motatoli ya Yehova te. Ntango tata yango abɛlaki, makambo oyo azalaki kosala ezalaki kopesa María mpasi mpo na kosalisa ye. María alobi boye: “Nabondelaki kaka te mpo na kozala na limemya epai ya tata na ngai, kasi mpe mpo nakoka komonisa yango. Namilobaki ete lokola Yehova asɛngi ngai napesaka baboti na ngai lokumu, akopesa ngai mpe makasi ya kosala yango. Na nsima, namonaki ete esengeli te ete tata abongola bizaleli na ye mpo ngai napesa ye limemya.” Ntango tozali kopesa bato ya libota na biso lokumu atako mabunga na bango, tokomonisa ete tozali komemya ebongiseli ya libota oyo Yehova atyá.

LIMEMYA EPAI YA BANDEKO YA LISANGÁ

11. Ntango nini ekoki kozala mpasi kopesa ndeko moko limemya?

11 Mokakatano. Bandeko na biso ya lisangá batosaka mitinda ya Biblia; kasi, ekoki kokóma ete basusu básalela biso makambo na boboto te, bákanisela biso mabe, to bápesa biso nkanda. Soki tozali na “likambo ná [ndeko] mosusu,” ekoki kozala mpasi tókoba kopesa ye limemya. (Kol. 3:13) Nini ekoki kosalisa biso?

12. Mpo na nini ezali na ntina tópesaka bandeko ya lisangá limemya? (2 Petro 2:​9-12)

12 Mpo na nini kopesa limemya? (Tángá 2 Petro 2:​9-12.) Na mokanda na ye ya mibale, Petro alobaki ete bakristo mosusu na siɛklɛ ya liboso bazalaki koloba kozanga limemya epai ya “bato ya nkembo,” elingi koloba, bankulutu ya lisangá. Baanzelu ya sembo oyo bamonaki likambo yango basalaki nini? Lokola “bazalaka na limemya mpo na Yehova,” babimisaki ata liloba moko te ya kofinga baoyo bazalaki kosala mabe. Kanisá naino! Baanzelu ya kokoka baboyaki koloba mabe mpo na mibali wana ya lolendo. Kasi, batikaki Yehova asambisa mpe apamela bango. (Rom. 14:​10-12; talá mpe Yuda 9.) Tokoki kozwa liteya epai ya baanzelu. Soki tosengeli te kozanga limemya epai ya baoyo bazali kotɛmɛla biso, tosengeli mpe kutu ata moke te kosalela bandeko na biso ya lisangá makambo kozanga limemya. Kasi, tosengeli nde ‘kozala bato ya liboso’ ya kopesa bango lokumu. (Rom. 12:10) Kosala bongo ekomonisa ete tomemyaka Yehova.

13-14. Ndenge nini tokoki kopesa bandeko ya lisangá limemya? Pesá ndakisa. (Talá mpe bililingi.)

13 Ndenge ya kopesa limemya. Bankulutu, ntango bozali koteya, bósalaka yango ntango nyonso na bolingo. (Flm. 8, 9) Soki bosengeli kopesa moto toli, bósala yango na boboto mpe na ntango oyo bozali na nkanda te. Bandeko basi, bokoki kosalisa bandeko ya lisangá bákoba kopesana limemya soki bozali koboya kotɔnga basusu to kokosela bato makambo. (Tito 2:​3-5) Mpe biso nyonso tokoki komonisa limemya epai ya bankulutu soki tozali kolanda malako na bango mpe kopesa bango matɔndi mpo na mosala makasi oyo basalaka mpo na kotambwisa makita, kopesa ndakisa na mosala ya kosakola, mpe kosalisa baoyo ‘babɛti libaku.’—Gal. 6:1; 1 Tim. 5:17.

14 Ndeko mwasi moko na nkombo Rocío azalaki na mokakatano ya komemya nkulutu moko oyo apesaki ye toli. Alobi boye: “Namonaki ete alobaki na ngai na boboto te. Nazalaki koloba mabe mpo na ye na ndako. Atako nasalaki makasi emonana te, na nse ya motema nazalaki komiloba ete azalaki na makanisi ya mabe mpe naboyaki koyoka toli na ye.” Nini esalisaki Rocío? Alobi boye: “Na botángi na ngai ya Biblia, nakweaki na 1 Batesaloniki 5:​12, 13. Ntango namonaki ete nazalaki kopesa ndeko yango limemya te, lisosoli na ngai ekómaki kotungisa ngai. Nabondelaki Yehova mpe nasalaki bolukiluki na mikanda na biso mpo na komona makambo ya sikisiki oyo ekokaki kosalisa ngai nasembola makanisi na ngai. Nsukansuka, namonaki ete mokakatano ezalaki ndeko yango te, kasi nde lolendo na ngai. Sikoyo nakangi ntina ete soki nazali na komikitisa te, nakokoka te kopesa basusu limemya. Nazali kokoba kobunda, kasi lokola nazali kosala makasi ya kopesa basusu limemya, nayokaka ete nazali na kimya elongo na Yehova.”

Bililingi: Ndeko mwasi moko ya mobange azali kotánga Biblia mpe kokanisa misala makasi ndenge na ndenge oyo bankulutu basalaka. 1. Nkulutu moko azali kosala diskur na makita. 2. Azali kosalisa ndeko moko na kiti ya bibɔsɔnɔ. 3. Azali kolongola nɛjɛ na libándá ya Ndako ya Bokonzi.

Biso nyonso tokoki komonisa limemya epai ya bankulutu soki tozali kolanda malako na bango mpe kopesa bango matɔndi mpo na mosala na bango ya makasi (Talá paragrafe 13-14)


PESÁKÁ BAOYO BAZALI BATATOLI TE LIMEMYA

15. Mpo na nini ekoki kozala mpasi tópesa baoyo bazali Batatoli te limemya?

15 Mokakatano. Mbala mingi na mosala ya kosakola, tokutanaka na bato oyo bamonanaka ete balingaka mateya ya Biblia te. (Ef. 4:18) Bato mosusu balingaka koyoka nsango na biso te mpo na makambo oyo bateyá bango na bomwana. Mbala mosusu bakonzi na biso na mosala to balakisi na eteyelo bamonaka te malamu oyo tosalaka, mpe mbala mosusu baninga ya mosala to ya kelasi bazali na bizaleli ya mabe mpenza. Kendekende, tokoki kotika kopesa bato ya ndenge wana limemya mpe tokosalela bango lisusu te makambo ndenge oyo tokolinga básalela biso.

16. Mpo na nini ezali na ntina tópesaka baoyo bazali naino kosalela Yehova te limemya? (1 Petro 2:12; 3:15)

16 Mpo na nini kopesa limemya? Kobosana te ete Yehova atyaka likebi na ezaleli na biso epai ya baoyo bazali bandimi te. Ntoma Petro akundwelaki bakristo ete etamboli na bango ya malamu ekoki kotinda basusu “bápesa Nzambe nkembo.” Mpo na yango, alendisaki bango bálimbolaka bindimeli na bango “na boboto mpe na limemya makasi.” (Tángá 1 Petro 2:12; 3:15.) Ezala ntango bazali kosamba na tribinale mpo na kokɔtela bindimeli na bango to ntango bazali kosolola na moninga ya kartye, bakristo basengelaki kosalela baoyo bazalaki bandimi te makambo kaka ndenge balingaki kosala yango liboso ya Nzambe. Mpo na nini? Mpo Yehova atalaka mpe ayokaka makambo oyo tolobaka mpe ndenge tolobaka yango. Yango esengeli mpenza kotinda biso tósalela baoyo bazali Batatoli te makambo na limemya!

17. Ndenge nini tokoki komonisa limemya epai ya baoyo bazali Batatoli te?

17 Ndenge ya kopesa limemya. Ntango tozali na mosala ya kosakola, tolingaka ata moke te bato bámona lokola tozali kokitisa bango mpo bazali na boyebi moke to bazali na boyebi te ya Biblia. Kasi, tolingaka komonisa bango ete bazali na motuya mpo na Nzambe mpe baleki biso. (Hag. 2:7; Flp. 2:3) Soki moto afingi yo mpo na bindimeli na yo, tɛmɛlá mposa ya kozongisela ye, na ndakisa kobimisa te maloba ya lisɛki oyo ekoki kopesa bango nkanda. (1 Pe. 2:23) Soki omoni ete olobi likambo oyo ebongi te, sɛngá bolimbisi mbala moko. Ndenge nini okoki komonisa limemya na esika ya mosala? Zalá mosali ya malamu mpe salá makasi ozala na makanisi ya malamu mpo na baoyo osalaka na bango mpe epai ya bakonzi na yo. (Tito 2:​9, 10) Soki ozali moto ya sembo, makasi na mosala, mpe osalaka na motema mobimba, bato bakosepela na yo ntango nyonso te, kasi okosepelisa mpenza Nzambe.—Kol. 3:​22, 23.

18. Mpo na nini ebongi tózala na limemya mpe tómonisa yango?

18 Tozali mpenza na bantina malamu ya kozala na limemya mpe komonisa yango! Tomoni ete ntango tozali kopesa bato ya libota limemya, tozali nde kokumisa Yehova, Mobandisi ya libota. Lisusu, ntango tozali kopesa bandeko ya lisangá limemya, tozali kokumisa Tata na biso ya likoló. Mpe ntango tozali komonisa limemya epai ya baoyo bazali Batatoli te, tozali kopesa bango libaku ya kopesa Nzambe na biso monene nkembo to ya kokumisa ye. Ata soki bato bapesi biso limemya te ndenge biso tosalaka epai ya basusu, ebongi kaka tózala na limemya mpe tómonisaka yango. Mpo na nini? Mpo Yehova akopambola biso. Alaki ete: “Baoyo bazali kopesa ngai lokumu, ngai mpe nakopesa bango lokumu.”—1 Sa. 2:30.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Ndenge nini tokoki kopesa bato ya libota limemya?

  • Ndenge nini tokoki kopesa bandeko ya lisangá limemya?

  • Ndenge nini tokoki kopesa baoyo bazali Batatoli te limemya?

LOYEMBO 129 Tokoyika mpiko tii na nsuka

a Topesi bango bankombo mosusu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto