Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Septembre nk. 20-25
  • Salisá mbala moko baoyo bazali na “ezaleli oyo ebongi”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salisá mbala moko baoyo bazali na “ezaleli oyo ebongi”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NTANGO BATO BASEPELI NA NSANGO MALAMU
  • NTANGO BOBANDI KOYEKOLA BIBLIA
  • NTANGO BATO YA SIKA BAYEI NA MAKITA
  • Luká biyano na mituna oyo
    Programɛ ya Liyangani ya zongazonga ya Batatoli ya Yehova 2025-2026—Elongo na mokɛngɛli ya zongazonga
  • Bikateli oyo emonisaka ete totyelaka Yehova motema
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Ndenge ya kozwa esengo mingi na mosala ya kosakola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Ndimá ete okoki koyeba makambo mosusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Septembre nk. 20-25

LISOLO YA BOYEKOLI 39

LOYEMBO 54 “Nzela yango oyo”

Salisá mbala moko baoyo bazali na “ezaleli oyo ebongi”

“Baoyo nyonso bazalaki na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko bakómaki bandimi.”—MIS. 13:48.

NA MOKUSE

Ntango oyo tokoki kosɛnga moto tóyekola na ye Biblia mpe kobengisa ye na makita.

1. Bato basalaka nini ntango bayoki nsango malamu? (Mis. 13:​47, 48; 16:​14, 15)

BATO mingi na siɛklɛ ya liboso bandimaki solo ntango kaka bayokaki nsango oyo bakristo bazalaki koteya. (Tángá Misala 13:​47, 48; 16:​14, 15.) Lelo oyo mpe, bato mosusu basepelaka na nsango malamu kaka na mbala ya liboso oyo bayoki yango. Ata baoyo bamonisaka liboso ete basepeli na nsango ya Bokonzi te, na nsima bakoki kofungola motema mpe kondima yango. Tosengeli kosala nini ntango tomoni baoyo bazali na “ezaleli oyo ebongi,” elingi koloba basepeli koyekola Biblia mpe koyeba makambo ya Nzambe?

2. Na ndenge nini mosala na biso ya kokómisa bato bayekoli ezali lokola ya mosali-bilanga?

2 Tótalela ndakisa moko. Mosala na biso ya kokómisa bato bayekoli ezali lokola ya mosali-bilanga. Soki mbuma eteli na nzete moko, na ntembe te mosali-bilanga akobuka yango naino ata soki azali kobalola mabele to kolona na esika mosusu na elanga. Ndenge moko mpe, ntango tomoni moto oyo andimi koyoka nsango na biso, tokozela te mpo na kosalisa ye akóma moyekoli ya Kristo. Nzokande, tokokoba mpe kolandela baoyo bazali na mposa ya ntango mingi mpo bámona ntina oyo mateya oyo bazali koyoka ezali na motuya monene. (Yoa. 4:​35, 36) Bososoli ekosalisa biso tópona lolenge oyo eleki malamu mpo na kosalisa bato oyo bayoki biso. Tótalela sikoyo oyo tokoki kosala na bokutani ya liboso mpo na kosalisa bato oyo basepeli na nsango na biso. Tokotalela mpe ndenge oyo tokoki kosalisa bango bákoba kokola na elimo.

NTANGO BATO BASEPELI NA NSANGO MALAMU

3. Tosengeli kosala nini ntango tokutani na bato oyo basepeli na nsango malamu? (1 Bakorinti 9:26)

3 Ntango tomoni bato oyo basepeli na nsango malamu, tosengeli kosalisa bango mbala moko mpo bábanda kotambola na nzela ya bomoi. Na mabaku mosusu, tosengeli te kokakatana mpo na kosɛnga moto tóbanda koyekola na ye Biblia mpe kobengisa ye na makita kaka na bakutani wana ya liboso.—Tángá 1 Bakorinti 9:26.

4. Pesá ndakisa ya moto moko oyo andimaki mbala moko koyekola Biblia.

4 Sɛngá ye bóyekola Biblia. Bato mosusu oyo tosololaka na bango bakoki kondima mbala moko boyekoli ya Biblia. Na ndakisa, mokolo moko ya minei, elenge mwasi moko na Canada ayaki na shario na biso mpe azwaki mwa buku Sepelá na bomoi libela na libela! Ndeko mwasi oyo azalaki wana ayebisaki elenge yango ete tosalelaka mwa buku yango mpo na koyekola na bato Biblia ofele. Elenge mwasi yango asepelaki mpe apesaki ye nimero na ye ya telefone. Mwa ngonga na nsima, elenge mwasi yango akomelaki ndeko mwasi mpe atunaki ye soki bakoyekola ntango nini. Ntango ndeko mwasi ayebisaki ye ete mokolo ya pɔsɔ to ya lomingo, elenge mwasi yango atunaki: “Bongo lobi? Nakozala na likambo ya kosala te.” Babandaki boyekoli mokolo ya mitano. Elenge mwasi yango ayanganaki na makita kaka na nsuka ya pɔsɔ yango mpe akobaki kokola mbangu na elimo.

5. Ndenge nini bososoli ekoki kosalisa biso tóyeba ntango ya kosɛnga moto tóbanda koyekola na ye Biblia? (Talá mpe bililingi.)

5 Ya solo, toyebi ete bato nyonso te nde bakomonisa mposa makasi lokola elenge mwasi wana. Bato mosusu bakozala na mposa ya mwa ntango mingi liboso bándima. Ekoki kosɛnga ete tóbanda naino kolobela likambo oyo moto yango asepeli na yango. Atako bongo, soki tobateli makanisi malamu mpe tokobi kotyela moto yango likebi, nsima ya mwa ntango moke, akoki kondima tóbanda koyekola na ye. Tokoki koloba nini mpo na kosɛnga moto tóbanda koyekola na ye Biblia? Tótala makanisi oyo bandeko oyo bameseni kosɛnga bato báyekola Biblia bapesaki ntango batunaki bango motuna yango.

Bililingi: 1. Bandeko mibali mibale bazali kosolola na mobange mobali moko oyo afandi liboso ya ndako na ye. 2. Bandeko basi mibale bazali kosolola na mwasi moko na mwa buku “Sepelá na bomoi libela na libela!” na porte ya ndako na ye. Mwasi yango amemi mwana na ye ya moke ya mobali mpe mwana na ye mosusu ya mobali atɛlɛmi pembeni na ye.

Okoki koloba nini na bato oyo bazali na bililingi oyo mpo básepela koyekola Biblia? (Talá paragrafe 5)a


6. Okoki koloba nini mpo moto oyo asepeli amona ete okozongela ye mpo bókoba masolo ya Biblia?

6 Basakoli mpe babongisi-nzela oyo bayanolaki na motuna oyo etali kobanda boyekoli balobaki ete na bamboka mosusu, ezali malamu koboya kosalela maloba lokola “boyekoli,” “boyekoli ya Biblia,” to “koteya yo” ntango tozali kolobela boyekoli ya Biblia. Bamonaki ete esimbaka malamu soki tosaleli maloba lokola “kosolola,” “kolobela makambo ya Biblia,” mpe “koluka koyeba Biblia.” Mpo moto yango amona ete okozongela ye, okoki koloba boye: “Okokamwa komona ete Biblia epesi biyano na mituna ya ntina mingi oyo etali bomoi” to “Biblia ezali kaka te buku ya makambo ya losambo; ezali na makambo oyo esalisaka biso.” Okoki koloba: “Ezwaka ntango mingi te; miniti 10 to 15 ekosalisa yo oyekola mwa likambo ya ntina.” Ezali na ntina te osalela maloba lokola “koyokana mpo na kokutana lisusu” to “pɔsɔ nyonso,” mpo akomona lokola azali kosala kɔntra.

7. Ntango nini bato mosusu bayebaki ete bayoki solo ya Biblia mpo na mbala ya liboso? (1 Bakorinti 14:​23-25)

7 Bengisá ye na makita. Emonani ete na ntango ya ntoma Paulo, bato mosusu bayebaki ete oyo bayoki ezali solo ya Biblia ntango bayaki na makita. (Tángá 1 Bakorinti 14:​23-25.) Esalemaka mpe bongo lelo. Bato mingi ya sika bakolaka noki na elimo ntango kaka babandi koyangana na makita. Ntango nini osengeli kobengisa moto na makita? Buku Sepelá na bomoi libela na libela! ezali na libyangi yango na liteya 10, kasi osengeli te kozela tii ntango bokokóma na eteni yango. Kaka na bokutani ya liboso, okoki kobengisa moto na makita ya nsuka ya pɔsɔ, okoki koyebisa ye motó ya likambo ya diskur ya bato nyonso to likambo moko oyo ezali na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya pɔsɔ yango.

8. Makambo nini oyo etali makita na biso tokoki kolobela ntango tozali kobengisa moto? (Yisaya 54:13)

8 Ntango ozali kobengisa moto oyo asepeli, yebisá ye ndenge oyo makita na biso ekeseni na makambo oyo esalemaka na mangomba mosusu, oyo mbala mosusu ayebi. Moyekoli moko ya Biblia oyo ayanganaki na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpo na mbala ya liboso atunaki ndeko mwasi oyo azalaki koyekola na ye boye: “Motambwisi ayebi nkombo ya moto nyonso?” Ndeko mwasi yango ayebisaki ye ete biso nyonso tosalaka makasi tóyeba nkombo ya bandeko nyonso ya lisangá, kaka ndenge toyebaka nkombo ya bandeko na biso ya libota. Moyekoli yango amonaki ete ezalaka bongo te na lingomba na bango. Tokoki mpe kolimbwela moto ntina ya makita na biso. (Tángá Yisaya 54:13.) Toyanganaka mpo na kosambela Yehova, koyekola koyeba ye, mpe mpo na kolendisana. (Ebr. 2:12; 10:​24, 25) Yango wana makita na biso esalemaka na molɔngɔ mpe toyekolaka makambo mingi, mpe tosalaka milulu te. (1 Ko. 14:40) Mpe bisika oyo tosalaka makita na biso ezalaka mindɔndɔ te mpe esalisaka biso tóyekola malamu. Tolobelaka ata lingomba moko te ya politiki mpo tokɔtaka na makambo ya politiki te; towelanaka mpe na maloba te mpo na kolongisa makambo ya mokili to makanisi na biso. Ekoki kozala malamu olakisa moyekoli liboso video Makambo esalemaka ndenge nini na Ndako ya Bokonzi? Yango ekosalisa ye ayeba makambo oyo akomona.

9-10. Ntango obengisi moto na makita, okoki koyebisa ye nini mpo amona te ete tokotya ye mbamba akɔta na lisangá to apesa eyano? (Talá mpe elilingi.)

9 Basusu bakoki koboya koyangana na makita mpo babangaka ete soki bayei bakokóma Batatoli ya Yehova. Yebisá moto yango ete tosepelaka koyamba bapaya mpe ete totyaka bango mbamba te ete bákɔta na lingomba na biso to bápesa eyano. Mabota mobimba mpe eyaka, ata oyo ezali na bana ya mike. Na makita na biso, bana balandaka mateya esika na bango moko te. Kasi, baboti ná bana bafandaka esika moko mpo na koyekola elongo. Na ndenge yango, baboti bayebaka soki bana na bango bazali na banani mpe makambo nini bazali koteya bango. (Mib. 31:12) Tosɛngaka mbongo te mpe tokɔngɔlaka mabonza te. Kasi, tolandaka etinda oyo ya Yesu ete: “Bozwi ofele, bópesa ofele.” (Mat. 10:8) Okoki mpe koyebisa moto ete azali na mposa te ya kozala na bilamba ya ntalo mpo na koyangana na makita. Nzambe atalaka motema, kasi te oyo ezali komonana libándá.—1 Sa. 16:7.

10 Soki moto yango ayei na makita, salá oyo okoki mpo amona ete bayambi ye malamu. Lakisá ye epai ya bankulutu mpe basakoli mosusu. Soki amoni ete bato batyeli ye likebi, akoki kolinga koya lisusu mbala ya nsima. Na makita, soki azali na Biblia te, bótala bavɛrsɛ na Biblia na yo mpe salisá ye alanda molobi malamu to boyekoli oyo ezali kosalema.

Mwasi oyo ya elilingi ya liboso asepeli ndenge bandeko basi mpe mibali bayambi ye malamu na Ndako ya Bokonzi. Amemi mwana na ye ya moke ya mobali mpe oyo ya mokóló azali kosolola na elenge mobali moko.

Soki moyekoli abandi koyangana na makita noki, akozwa mpe matomba noki (Talá paragrafe 9-10)


NTANGO BOBANDI KOYEKOLA BIBLIA

11. Ndenge nini okoki komemya ntango mpe programɛ ya moto?

11 Makambo nini tosengeli kobosana te ntango obandi koyekola Biblia na moto? Tosáká ngonga mpe programɛ ya moto yango. Na ndakisa, soki boyokani ngonga, kokóma na retare te, ata soki na esika oyo ofandi bato batosaka ngonga te. Lisusu, okoki komona malamu ete bóumela mingi te na mbala ya liboso ya boyekoli. Basakoli mosusu oyo bakɔmɛli balobi ete esengeli te koumisa boyekoli, ata soki moto yango alingi koyeba makambo mingi. Koloba mpe mingi te. Tiká moto yango abimisa makanisi na ye.—Mas. 10:19.

12. Mokano nini tosengeli kozala na yango ntango kaka tobandi koyekola Biblia na moto?

12 Kaka na ebandeli, osengeli kozala na mokano ya kosalisa moto ayeba Yehova ná Yesu mpe akóma kolinga bango. Mpo na yango, osengeli kobenda likebi na ye na Liloba ya Nzambe kasi te epai na yo moko to na boyebi na yo ya Biblia. (Mis. 10:​25, 26) Ntoma Paulo azalaki mbala mingi kolobela mateya ya Yesu Kristo, moto oyo Yehova atindaki mpo na kosalisa biso tóyeba mpe tólinga Ye. (1 Ko. 2:​1, 2) Na nsima, Paulo amonisaki polele ete ezali na ntina mingi kosalisa bayekoli ya sika bákolisa bizaleli malamu, oyo ezali lokola wolo, palata, mpe mabanga ya motuya. (1 Ko. 3:​11-15) Bizaleli yango ya motuya esangisi kondima, bwanya, bososoli, mpe kobanga Yehova. (Nz. 19:​9, 10; Mas. 3:​13-15; 1 Pe. 1:7) Okoki komekola mayele ya koteya ya Paulo soki ozali kosalisa bayekoli na yo bákóma na kondima makasi mpe bákolisa boyokani ya bango moko elongo na Tata na bango ya likoló ya bolingo.—2 Ko. 1:24.

13. Ndenge nini tokoki komonisa motema molai mpe komitya na esika ya moyekoli ntango tozali kosalisa ye? (2 Bakorinti 10:​4, 5) (Talá mpe etanda.)

13 Okomekola lolenge ya Yesu ya koteya soki ozali komonisa motema molai mpe komitya na esika ya moyekoli. Boyá kotuna mituna oyo ekosala ete amiyoka mabe. Soki esengeli, bóleka eteni oyo ezali mpasi mpo na ye mpe bózongela yango nsima. Na esika otinda ye na makasi andima liteya moko boye nokinoki, tikelá solo ntango mpo ezwa misisa na motema na ye. (Yoa. 16:12; Kol. 2:​6, 7) Biblia emonisi ete mateya ya lokuta oyo tolukaka kokweisa ezali lokola ndako makasi ya libateli. (Tángá 2 Bakorinti 10:​4, 5) Na esika obuka ndako na ye ya makasi kaka boye liboso na ye, salisá ye naino akómisa Yehova Esika na ye ya kokima.—Nz. 91:9.

Mobange mobali oyo ya elilingi ya liboso azali koyekola buku “Sepelá na bomoi libela na libela!” na bandeko mibali mibale. Bamedayi ya mosala ya soda ezali komonana na likoló ya armware.

Tikelá solo ntango mpo ezwa misisa na motema ya moyekoli na yo (Talá paragrafe 13)


NTANGO BATO YA SIKA BAYEI NA MAKITA

14. Ndenge nini tosengeli kosalela bato ya sika makambo ntango bayei na makita na biso?

14 Yehova alingi ete tóponaka bilongi te ntango tozali koyamba bato ya sika; tótala te mimeseno na bango, mbongo oyo bazali na yango, to esika oyo bautá. (Yak. 2:​1-4, 9) Na yango, ndenge nini tokoki komonisa bolingo epai ya baoyo bayei na makita na biso?

15-16. Ndenge nini tokoki kosalisa bato ya sika bámona ete toyambi bango malamu na makita?

15 Bato mosusu bayaka na makita na biso kaka mpo na kotala to mpo moto oyo afandaka esika mosusu asɛngaki bango báyangana na makita. Na yango, tosengeli te kokakatana kosolola na bato ya ndenge wana oyo bayei na makita na biso. Tombelá bango boyei malamu kasi kolekisa ndelo te. Sɛngá ye afanda pene na yo. Bósalela elongo Biblia na yo mpe mikanda ya boyekoli, to lukelá ye ya ye moko. Longola yango, kanisá ndenge oyo okoki komitya na esika na ye. Mobali moko oyo ayaki na Ndako ya Bokonzi ayebisaki ndeko mobali oyo atombelaki ye boyei malamu ete amitungisaki mpo alataki kaka bongobongo. Ndeko mobali yango akitisaki moto yango motema mpe ayebisaki ye ete Batatoli ya Yehova bazali kaka lokola bato nyonso. Mobali yango, oyo nsukansuka azwaki batisimo, abosanaka te boyambi ya ndeko mobali yango. Kasi tosengeli kokeba na likambo oyo: Ntango ozali kosolola na bato ya sika liboso to nsima ya makita, tyelá bango likebi kasi kokɔta na makambo ya bomoi na bango te.—1 Pe. 4:15.

16 Tokoki mpe komonisa boyambi epai ya bato ya sika oyo bayei na makita na ndenge mosusu. Na ndakisa, ntango tozali kosolola, kopesa biyano, to kosala lisolo na makita, tosengeli kozala na limemya ntango tolingi kolobela baoyo bazali Batatoli te to bindimeli na bango. Tóboya kosalela maloba oyo ekoki kobɛtisa bango libaku to komonana lokola kofinga. (Tito 2:8; 3:2) Na ndakisa, tokotyola ata moke te bindimeli oyo biso tondimaka te. (2 Ko. 6:3) Mpo na yango, bandeko oyo basalaka badiskur ya bato nyonso basengeli kozala mpenza ekɛngɛ. Lokola bayebi ete bato mosusu oyo bazali Batatoli te bayei na makita, bakolimbola maloba to makanisi oyo bato ya libándá bayebi te.

17. Mokano na biso ezali nini ntango tokutani na bato oyo bazali na “ezaleli oyo ebongi”?

17 Mosala na biso ya kokómisa bato bayekoli ezali se kokóma na ntina mingi mokolo na mokolo, mpe tozali kokoba kokutana na bato oyo bazali na “ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.” (Mis. 13:48) Ntango tokutani na bato yango, tosengeli te kokakatana mpo na kosɛnga bango tóyekola Biblia to kobengisa bango na makita na biso. Soki tozali kosala bongo, tokoki kosalisa bango bábanda kotambola na ‘nzela oyo ezali komema na bomoi.’—Mat. 7:14.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo bazali na “ezaleli oyo ebongi” kaka na bokutani ya liboso?

  • Makanisi nini tokoki kosalela ntango tobandi koyekola Biblia na moto?

  • Tokoki kosala nini mpo bato ya sika bámona ete toyambi bango malamu na makita na biso?

LOYEMBO 64 Tósala na esengo mosala ya kobuka mbuma

a NDIMBOLA YA BILILINGI: Bandeko mibali mibale bazali kosolola na mobali moko oyo kala azalaki soda mpe azali kozwa mopɛpɛ na veranda na ye; bandeko basi mibale bapesi litatoli ya mokuse na mama oyo azali na makambo mingi ya kosala.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto