Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 15/11 lok. 15
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Masolo mosusu
  • Etumba ya Yeriko—lisapo to likambo ya solo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Lopango ya Yeriko ekwei
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Yosua
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Tyá motema epai ya Mokambi na biso—Kristo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 15/11 lok. 15
Banganga-nzambe bayuli maseke, Yosua abɛti ntangwa ya etumba mpe bifelo ya Yeriko ebandi kokwea

MITUNA YA BATÁNGI

Makambo nini bato ya arkeoloji bamoni oyo emonisi ete Bayisraele bazwaki Yeriko nsima ya ntango mokuse?

Yosua 6:10-15, 20 elobi ete basoda ya Yisraele batambolaki zingazinga ya Yeriko mbala moko na mokolo, mikolo motoba. Kasi na mokolo ya nsambo, batambolaki zingazinga ya engumba yango mbala nsambo. Na nsima, Nzambe akweisaki bifelo makasi ya Yeriko, mpe Bayisraele bazwaki engumba yango. Ezali nde na makambo oyo bato ya arkeoloji bamonaki, oyo emonisi ete Bayisraele bazingaki Yeriko mpo na ntango mokuse, ndenge Biblia elobi?

Na ntango ya kala, bazalaki koloba ete engumba ezingami soki basoda bakómi kofanda zingazinga ya bifelo na yango mpe bazali kozela mpo na kobunda. Soki bazingi engumba mpo na ntango molai, bato oyo bazali na kati ya engumba yango bazalaki kolya biloko mingi oyo babombaki. Nsukansuka, soki basoda yango bazwi engumba, bazalaki kozwa eloko nyonso oyo balingi, ata mpe bilei oyo etikalaki. Yango wana, bato ya arkeoloji bamonaki biloko ya kolya kaka moke to eloko te na bisika oyo bingumba ya kala ya Palestine ezalaki. Kasi na esika oyo Yeriko ezalaki, bamonaki ete makambo ezalaki ndenge mosusu. Buku moko (Biblical Archaeology Review) elobi ete: “Longola bambɛki, biloko oyo bamonaki mingi na esika engumba yango ezalaki, ezalaki bambuma.” Ebakisi boye: “Komona bambuma mingi ndenge wana ezali mpenza kokamwisa.”

Biblia elobi ete Bayisraele bazwaki ata eloko moko te ya kolya na Yeriko mpo Yehova apekisaki bango kosala bongo. (Yosua 6:17, 18) Elobi mpe ete Bayisraele babundisaki Yeriko na eleko ya prɛnta, nsima ya eleko ya kobuka mbuma, ntango bambuma ezalaki naino mingi na engumba yango. (Yosua 3:15-17; 5:10) Ndenge bambuma ezalaki naino mingi na Yeriko nsima ya kozingama na yango endimisi biso ete bazingaki yango mpo na ntango mokuse, kaka ndenge Biblia elobi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto