Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 93
  • Yesu asekwaki na nzoto ya elimo to ya mosuni?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu asekwaki na nzoto ya elimo to ya mosuni?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Lisekwa
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Elikya ya lisekwa ezali na nguya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Lisekwa ya Yesu—Ndimbola na yango mpo na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • ‘Liwa ekozala lisusu te’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 93
Yesu alati nzoto oyo ezali na elembo ya nsɛtɛ oyo batombolaki ye na mabɔkɔ mpe abimeli Toma ná bayekoli mosusu nsima ya lisekwa na ye

Yesu asekwaki na nzoto ya elimo to ya mosuni?

Eyano ya Biblia

Biblia elobi ete Yesu “abomamaki na nzoto, kasi azongisamaki na bomoi [asekwisamaki] na elimo.”​—1 Petro 3:18; Misala 13:34; 1 Bakorinti 15:45; 2 Bakorinti 5:16.

Maloba ya Yesu ye moko emonisaki ete akosekwa na nzoto ya mosuni mpe makila te. Alobaki ete akopesa “mosuni na [ye] mpo na bomoi ya mokili,” mpo na kosikola bato. (Yoane 6:51; Matai 20:28) Soki azongelaka nzoto na ye ya mosuni ntango asekwaki, elingaki kokweisa mbeka yango ya lisiko. Kasi, esalemaki bongo te mpo Biblia elobi ete apesaki nzoto mpe makila na ye “mbala moko mpo na libela.”—Baebre 9:11, 12.

Soki Yesu asekwaki na nzoto ya elimo, ndenge nini bayekoli na ye bamonaki ye?

  • Bikelamu ya elimo bakoki kolata nzoto ya mosuni. Kutu, baanzelu oyo basalaki yango na ntango ya kala balyaki mpe bamɛlaki elongo na bato. (Ebandeli 18:1-8; 19:1-3) Atako bongo, bazalaki kaka bikelamu ya elimo mpe bakokaki kotika mabele mpe kozonga na likoló.​—Basambisi 13:15-21.

  • Nsima ya lisekwa na ye, Yesu mpe alataki nzoto ya mosuni mpo na mwa ntango, ndenge baanzelu basalaki yango liboso. Kasi, lokola azalaki ekelamu ya elimo, akokaki kobimela bato mpe kolimwa na mbala moko. (Luka 24:31; Yoane 20:19, 26) Nzoto ya mosuni oyo azalaki kolata mpo na kobimela bato ezalaki ndenge moko te. Yango wana, ata baninga na ye mpenza bazalaki koyeba ye kaka na makambo oyo azalaki koloba mpe kosala.​—Luka 24:30, 31, 35; Yoane 20:14-16; 21:6, 7.

  • Ntango Yesu abimelaki ntoma Toma, alataki nzoto oyo ezalaki na bilembo ya bampota. Asalaki yango mpo alendisa kondima ya Toma, oyo azalaki kotya ntembe ete Yesu asekwi.​—Yoane 20:24-29.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto