Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 23
  • Bokonzi ya Nzambe ekosala nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bokonzi ya Nzambe ekosala nini?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Bokonzi ya Nzambe ekosala makambo nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2020
  • Bomoi ya kimya kati na mokili ya sika
    Bomoi ya kimya kati na mokili ya sika
  • Mokili ya sika ya kitoko mingi oyo Nzambe akosala
    Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?
  • Baninga ya Nzambe bakofanda na Paladiso
    Okoki kozala moninga ya Nzambe!
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 23
Paradiso

Bokonzi ya Nzambe ekosala nini?

Eyano ya Biblia

Bokonzi ya Nzambe ekolongola baguvɛrnema nyonso ya bato mpe yango moko ekoyangela mabele mobimba. (Danyele 2:44; Emoniseli 16:14) Nsima na yango, Bokonzi ya Nzambe . . .

  • Ekoboma bato mabe, oyo bazali konyokola biso nyonso mpo na matomba na bango. “Kasi bato mabe bakolongolama na mabele.”​—Masese 2:22.

  • Ekosilisa bitumba nyonso. “[Nzambe] azali kosilisa bitumba tii na nsuka ya mabele.”​—Nzembo 46:9.

  • Ekomema bolamu mpe ekotya kimya na mabele. “Bakofanda mpenza, moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi, mpe moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa bango.”​—Mika 4:4.

  • Ekokómisa mabele paradiso. “Esobe mpe etúká oyo ezangá mai ekosepela, mpe mokili patatalu oyo ekauká ekozala na esengo mpe ekobimisa bafololo lokola safra.”​—Yisaya 35:1.

  • Ekopesa moto nyonso mosala ya malamu. “Bato oyo [Nzambe aponi] bakozwa mpenza litomba na mosala ya mabɔkɔ na bango. Bakoboma nzoto mpamba te.”​—Yisaya 65:21-23.

  • Ekolongola maladi. “Moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi.’”​—Yisaya 33:24.

  • Ekozongisa mibange bilenge. “Mosuni na ye ekóma ya sika koleka oyo ya bolenge; azonga na mikolo oyo azalaki na makasi ya bolenge.”​—Yobo 33:25.

  • Ekozongisa bakufi na bomoi. “Baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo [ya Yesu] mpe bakobima.”​—Yoane 5:28, 29.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto