Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 7
  • Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

2 Bakonzi 7:1

Mitindami

  • +Am 3:7; Ebr 1:1
  • +Mib 32:36; Bas 5:11; 2Ba 7:18

2 Bakonzi 7:2

Mitindami

  • +2Ba 5:18
  • +Eb 7:11; Nz 78:23; Mal 3:10
  • +Mit 14:11; 2Te 3:2
  • +Mit 11:23; 2Nt 20:20
  • +2Ba 7:17

2 Bakonzi 7:3

Mitindami

  • +Le 13:46; Mib 24:8

2 Bakonzi 7:4

Mitindami

  • +2Ba 6:25
  • +Bil 4:9

2 Bakonzi 7:6

Mitindami

  • +Mas 20:12
  • +Mib 28:7; 2Sa 5:24; 2Ba 19:7
  • +1Ba 10:29; 2Nt 1:17
  • +2Nt 12:2

2 Bakonzi 7:7

Mitindami

  • +Nz 48:5; Mas 28:1
  • +Nz 33:17; Mas 21:31
  • +Eb 2:7

2 Bakonzi 7:8

Mitindami

  • +Yir 41:8

2 Bakonzi 7:9

Mitindami

  • +Nah 1:15; 1Ko 10:24; Flp 2:4; 1Te 5:15
  • +1Ti 6:10

2 Bakonzi 7:10

Mitindami

  • +2Sa 18:26; Nz 127:1; Mr 13:34
  • +2Ba 7:7

2 Bakonzi 7:12

Mitindami

  • +2Ba 6:8
  • +Mas 14:15
  • +2Ba 6:25, 29
  • +Yos 8:4, 12; Bas 20:29, 37

2 Bakonzi 7:13

Mitindami

  • +2Ba 6:25
  • +Bil 4:9

2 Bakonzi 7:15

Mitindami

  • +Est 1:7; Yis 22:24
  • +Nz 68:12; Yis 2:20; Mt 16:26

2 Bakonzi 7:16

Mitindami

  • +2Nt 20:25; Nz 68:12; Yis 33:1
  • +Mit 23:19; 2Ba 7:1; Yis 44:26; 55:11

2 Bakonzi 7:17

Mitindami

  • +2Ba 5:18
  • +2Ba 9:33; Yis 25:10
  • +Mib 32:35; 2Ba 7:2; 2Nt 36:16; Yis 5:24; 28:22; Nah 1:2

2 Bakonzi 7:18

Mitindami

  • +2Ba 7:1; Yis 44:26

2 Bakonzi 7:19

Mitindami

  • +Mit 20:12; Nz 78:19
  • +2Ba 7:2

2 Bakonzi 7:20

Mitindami

  • +2Nt 20:20
  • +Yis 41:25

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Bak. 7:1Am 3:7; Ebr 1:1
2 Bak. 7:1Mib 32:36; Bas 5:11; 2Ba 7:18
2 Bak. 7:22Ba 5:18
2 Bak. 7:2Eb 7:11; Nz 78:23; Mal 3:10
2 Bak. 7:2Mit 14:11; 2Te 3:2
2 Bak. 7:2Mit 11:23; 2Nt 20:20
2 Bak. 7:22Ba 7:17
2 Bak. 7:3Le 13:46; Mib 24:8
2 Bak. 7:42Ba 6:25
2 Bak. 7:4Bil 4:9
2 Bak. 7:6Mas 20:12
2 Bak. 7:6Mib 28:7; 2Sa 5:24; 2Ba 19:7
2 Bak. 7:61Ba 10:29; 2Nt 1:17
2 Bak. 7:62Nt 12:2
2 Bak. 7:7Nz 48:5; Mas 28:1
2 Bak. 7:7Nz 33:17; Mas 21:31
2 Bak. 7:7Eb 2:7
2 Bak. 7:8Yir 41:8
2 Bak. 7:9Nah 1:15; 1Ko 10:24; Flp 2:4; 1Te 5:15
2 Bak. 7:91Ti 6:10
2 Bak. 7:102Sa 18:26; Nz 127:1; Mr 13:34
2 Bak. 7:102Ba 7:7
2 Bak. 7:122Ba 6:8
2 Bak. 7:12Mas 14:15
2 Bak. 7:122Ba 6:25, 29
2 Bak. 7:12Yos 8:4, 12; Bas 20:29, 37
2 Bak. 7:132Ba 6:25
2 Bak. 7:13Bil 4:9
2 Bak. 7:15Est 1:7; Yis 22:24
2 Bak. 7:15Nz 68:12; Yis 2:20; Mt 16:26
2 Bak. 7:162Nt 20:25; Nz 68:12; Yis 33:1
2 Bak. 7:16Mit 23:19; 2Ba 7:1; Yis 44:26; 55:11
2 Bak. 7:172Ba 5:18
2 Bak. 7:172Ba 9:33; Yis 25:10
2 Bak. 7:17Mib 32:35; 2Ba 7:2; 2Nt 36:16; Yis 5:24; 28:22; Nah 1:2
2 Bak. 7:182Ba 7:1; Yis 44:26
2 Bak. 7:19Mit 20:12; Nz 78:19
2 Bak. 7:192Ba 7:2
2 Bak. 7:202Nt 20:20
2 Bak. 7:20Yis 41:25
  • Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Libongoli ya Mokili ya Sika
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Bakonzi 7:1-20

2 Bakonzi

7 Bongo Elisha alobaki boye: “Bóyoka liloba ya Yehova.+ Talá oyo Yehova alobi: ‘Lobi, na ngonga oyo, sea moko ya farini ya malamu ekozala na ntalo ya shekele moko, mpe sea mibale ya ɔrje ekozala na ntalo ya shekele moko, na porte ya Samaria.’”+ 2 Bongo komanda oyo asalisaka mokonzi, oyo lobɔkɔ na ye ezalaki kosimba+ mokonzi, apesaki moto ya Nzambe ya solo eyano mpe alobaki: “Ata soki Yehova afungoli baporte ya mai na likoló,+ likambo oyo ekoki nde kosalema?”+ Na yango, ye alobaki ete: “Talá, okomona yango na miso na yo,+ kasi okolya yango te.”+

3 Mpe mibali minei, bato ya maba, bafandaki na esika ya kokɔta na porte;+ mpe babandaki kolobana boye: “Mpo na nini tokofanda awa tii tókufa? 4 Soki tolobi: ‘Tókɔta na engumba,’ lokola nzala ezali na engumba, tokokufa mpenza kuna.+ Mpe soki tofandi awa, tokokufa mpe. Boye sikoyo, bóya, tókɔta na kaa ya bato ya Siri. Soki batiki biso na bomoi, tobiki; kasi soki babomi biso, tokufi kaka.”+ 5 Bongo ntango molili ya mpokwa ebandaki kokɔta, batɛlɛmaki mpo na kokɔta na kaa ya bato ya Siri; mpe bayaki tii pembeni ya kaa ya bato ya Siri, mpe talá! moto moko azalaki wana te.

6 Mpe Yehova ayokisaki+ na kaa ya bato ya Siri lokito ya makalo ya bitumba, lokito ya bampunda, lokito ya limpinga monene ya basoda,+ bongo balobanaki: “Talá! Mokonzi ya Yisraele afuti bakonzi ya Bahiti+ mpe bakonzi ya Ezipito+ mpo báya kobunda na biso!” 7 Na mbala moko, na molili ya mpokwa batɛlɛmaki bakimi+ mpe batikaki bahema na bango, bafarasa+ na bango ná bampunda na bango—kaa yango, kaka ndenge ezalaki—mpe bakobaki kokima mpo na kobikisa molimo na bango.+

8 Ntango bato yango ya maba bayaki tii pembeni ya kaa yango, bakɔtaki na hema moko, babandaki kolya mpe komɛla, mpe bazwaki palata, wolo ná bilamba kuna mpe bakendaki kobomba yango. Nsima na yango, bazongaki, bakɔti na hema mosusu mpe bazwi biloko kuna mpe bakendaki kobomba yango.+

9 Nsukansuka, balobanaki boye: “Likambo oyo tozali kosala ezali malamu te. Mokolo oyo ezali mokolo ya nsango malamu!+ Soki tozali kokakatana, mpe soki tozeli tii ntɔngɔ etana, tokomema mpenza ngambo.+ Bongo sikoyo bóya tókɔta mpe tópesa ndako ya mokonzi nsango.” 10 Bongo bayaki mpe babengaki bakɛngɛli ya porte+ ya engumba, na nsima bapesaki bango nsango ete: “Tokɔtaki na kaa ya bato ya Siri, mpe talá! moto moko azalaki kuna te, makɛlɛlɛ ya moto mpe te, kaka bafarasa oyo ekangisami, bampunda oyo ekangisami ná bahema, kaka boye.”+ 11 Na mbala moko, bakɛngɛli ya porte babelelaki mpe bapesaki nsango na ndako ya mokonzi, na kati.

12 Na mbala moko mokonzi atɛlɛmaki na butu mpe alobaki na basaleli na ye+ boye: “Nabondeli bino, tiká nayebisa bino likambo oyo bato ya Siri basali biso.+ Bayebi malamu ete tozali na nzala;+ yango wana babimi na kaa mpo na komibomba na esobe,+ balobi: ‘Bakobima na engumba, mpe tokokanga bango na bomoi, mpe tokokɔta na engumba.’” 13 Bongo moko ya basaleli na ye ayanolaki mpe alobaki ete: “Nabondeli yo, tiká bázwa bampunda mitano kati na oyo etikali na engumba.+ Talá! Bango ná ebele ya bato nyonso ya Yisraele oyo batikali na engumba bazali ndenge moko. Talá! Bango ná ebele ya bato nyonso ya Yisraele oyo bakufi bazali ndenge moko.+ Tiká tótinda bato mpe tómona.” 14 Na yango, bazwaki makalo mibale ná bampunda, mpe mokonzi atindaki bango bákende na kaa ya bato ya Siri mpe alobaki: “Bókende mpe bómona.” 15 Bongo bakendaki balandi bango tii na Yordani; mpe talá! nzela mobimba etondaki na bilamba ná biloko+ oyo bato ya Siri babwakaki ntango bazalaki kokima mbangumbangu.+ Na nsima, bamemi-nsango bazongaki mpe bapesaki mokonzi nsango.

16 Mpe bato babimaki mpe bapunzaki+ kaa ya bato ya Siri; bongo sea moko ya farini ya malamu ekómaki na ntalo ya shekele moko, mpe sea mibale ya ɔrje na ntalo ya shekele moko, ndenge Yehova alobaki.+ 17 Mpe mokonzi apesaki komanda oyo asalisaka ye, oyo lobɔkɔ na ye ezalaki kosimba+ ye, mokumba ya kokɛngɛla porte; mpe bato banyatanyataki+ ye na porte, bongo akufaki, kaka ndenge moto ya Nzambe ya solo alobaki+ na ntango oyo mokonzi akitaki epai na ye. 18 Bongo esalemaki kaka ndenge moto ya Nzambe ya solo alobaki na mokonzi: “Lobi, na ngonga oyo, sea mibale ya ɔrje ekozala na ntalo ya shekele moko mpe sea moko ya farini ya malamu ekozala na ntalo ya shekele moko, na porte ya Samaria.”+ 19 Kasi komanda yango apesaki moto ya Nzambe ya solo eyano mpe alobaki: “Ata soki Yehova afungoli baporte ya mai na likoló, likambo oyo ekoki nde kosalema na kolanda liloba oyo?”+ Na yango, ye alobaki ete: “Talá, okomona yango na miso na yo, kasi okolya yango te.”+ 20 Na yango, ekómelaki ye ndenge wana,+ ntango bato banyatanyataki+ ye na porte, bongo akufaki.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto