Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 32:35
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Kozongisa mabe ezali likambo na ngai, mpe kofuta.+

      Lokolo na bango ekotengatenga+ na ntango oyo etyami,

      Mpo mokolo ya likama na bango ekómi pene,+

      Mpe makambo oyo elɛngɛlami mpo na bango ezali mpenza koya mbangumbangu.’+

  • 2 Bakonzi 7:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Bongo komanda oyo asalisaka mokonzi, oyo lobɔkɔ na ye ezalaki kosimba+ mokonzi, apesaki moto ya Nzambe ya solo eyano mpe alobaki: “Ata soki Yehova afungoli baporte ya mai na likoló,+ likambo oyo ekoki nde kosalema?”+ Na yango, ye alobaki ete: “Talá, okomona yango na miso na yo,+ kasi okolya yango te.”+

  • 2 Ntango 36:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Kasi bazalaki ntango nyonso kosɛka+ bamemi-nsango ya Nzambe ya solo mpe komona maloba na ye mpamba+ mpe kotyola+ basakoli na ye, tii nkɛlɛ+ ya Yehova ekitelaki bato na ye, tii bakokaki lisusu kobikisama te.+

  • Yisaya 5:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Yango wana, se ndenge lolemo ya mɔtɔ elyaka matiti ya blé+ mpe matiti oyo ekauká ezindaka na kati ya ndemo ya mɔtɔ, ekumu ya misisa na bango ekokóma lokola nsolo moko ya mabe,+ mpe fololo na bango ekomata lokola pudre, mpo baboyi mobeko ya Yehova ya mampinga,+ mpe bazangi limemya na liloba ya Mosantu ya Yisraele.+

  • Yisaya 28:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Bongo sikoyo bózala basɛki te,+ mpo bansinga na bino ekangama makasi te, mpamba te nayoki ete Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso,+ Yehova ya mampinga, akani kosilisa mokili mobimba nyɛɛ.+

  • Nahumu 1:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Yehova azali Nzambe oyo asɛngaka kokangama kaka na ye+ mpe oyo azongisaka mabe; Yehova azongisaka mabe+ mpe azalaka pene na koyoka nkɛlɛ.+ Yehova azongiselaka batɛmɛli na ye mabe,+ mpe akangelaka banguna na ye nkanda.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto