Nzembo
Mikitame ya Davidi.
16 Batelá ngai, Ee Nzambe, mpo nakimi epai na yo.+
2 Nalobi na Yehova ete: “Yo ozali Yehova; bolamu na ngai ekopesa yo litomba te,+
3 Kasi ekopesa litomba nde na basantu oyo bazali na mabele.
Bango, ɛɛ bato ya lokumu nde bato nasepelaka na bango mpenza.”+
4 Mpasi ekómaka mingi epai ya baoyo, ntango moto mosusu amonani, balandaka ye nokinoki.+
Nakopesa makabo na bango ya masanga ya makila te,+
Mpe nakotánga nkombo na bango na mbɛbu na ngai te.+
5 Yehova azali ndambo ya likabo oyo bapesá ngai+ mpe ya kɔpɔ na ngai.+
Ozali kosimba makasi likabo na ngai.
6 Bisika oyo omeki na nsinga mpo na kopesa ngai libula esepelisi ngai.+
Ya solo mpenza, libula na ngai moko ezali kosepelisa ngai.
8 Natye Yehova liboso na ngai ntango nyonso.+
Lokola ye azali na lobɔkɔ na ngai ya mobali, nakotengatenga te.+
9 Na yango, motema na ngai ezali kosepela, mpe nkembo na ngai elingi kozala na esengo.+
Lisusu, nzoto na ngai ekofanda na kimya.+