Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 33
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ebandeli

      • Yakobo akutani na Esau (1-16)

      • Yakobo akei na Shekeme (17-20)

Ebandeli 33:1

Mitindami

  • +Eb 32:6
  • +Eb 32:22

Ebandeli 33:2

Mitindami

  • +Eb 30:7, 12
  • +Eb 30:19
  • +Eb 30:22-24

Ebandeli 33:5

Mitindami

  • +Eb 32:22; Nz 127:3

Ebandeli 33:7

Mitindami

  • +Eb 33:2

Ebandeli 33:8

Mitindami

  • +Eb 32:16
  • +Eb 32:4, 5

Ebandeli 33:9

Mitindami

  • +Eb 36:6, 7

Ebandeli 33:10

Mitindami

  • +Eb 32:11, 20

Ebandeli 33:11

Mitindami

  • +Eb 32:13-15
  • +Eb 30:43

Ebandeli 33:13

Mitindami

  • +Eb 31:17

Ebandeli 33:14

Mitindami

  • +Eb 32:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/11/2005, lok. 18

Ebandeli 33:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “bandako ya matiti; mwa bandako.”

Mitindami

  • +Yos 13:24, 27; 1Ba 7:46

Ebandeli 33:18

Mitindami

  • +Eb 25:20; 28:6
  • +Yos 24:1
  • +Eb 10:19; 12:6

Ebandeli 33:19

Mitindami

  • +Yos 24:32; Mis 7:15, 16

Ebandeli 33:20

Mitindami

  • +Eb 35:1, 7

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Eba. 33:1Eb 32:6
Eba. 33:1Eb 32:22
Eba. 33:2Eb 30:7, 12
Eba. 33:2Eb 30:19
Eba. 33:2Eb 30:22-24
Eba. 33:5Eb 32:22; Nz 127:3
Eba. 33:7Eb 33:2
Eba. 33:8Eb 32:16
Eba. 33:8Eb 32:4, 5
Eba. 33:9Eb 36:6, 7
Eba. 33:10Eb 32:11, 20
Eba. 33:11Eb 32:13-15
Eba. 33:11Eb 30:43
Eba. 33:13Eb 31:17
Eba. 33:14Eb 32:3
Eba. 33:17Yos 13:24, 27; 1Ba 7:46
Eba. 33:18Eb 25:20; 28:6
Eba. 33:18Yos 24:1
Eba. 33:18Eb 10:19; 12:6
Eba. 33:19Yos 24:32; Mis 7:15, 16
Eba. 33:20Eb 35:1, 7
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ebandeli 33:1-20

Ebandeli

33 Ntango Yakobo atombolaki miso, amonaki Esau azali koya elongo na mibali 400.+ Na yango, apesaki bana epai ya Lea, Rashele, mpe epai ya basaleli na ye mibale ya basi.+ 2 Atyaki basaleli na ye ya basi ná bana na bango liboso,+ Lea ná bana na ye nsima na bango,+ mpe Rashele+ ná Yozefe na nsima na bango nyonso. 3 Mpe ye moko alekaki liboso, mpe agumbamaki tii na nse mbala nsambo wana azalaki kopusana pene na ndeko na ye.

4 Kasi Esau apotaki mbangu mpo na kokutana na ye, ayambaki ye, apwɛpwaki ye, mpe babandaki kolela. 5 Ntango atombolaki miso, amonaki basi ná bana mpe alobaki ete: “Banani oyo bazali elongo na yo?” Yakobo alobaki ete: “Ezali bana oyo Nzambe akabeli mosaleli na yo.”+ 6 Bongo basaleli ya basi bapusanaki liboso ná bana na bango, mpe bagumbamaki. 7 Lea mpe apusanaki liboso ná bana na ye, mpe bagumbamaki. Na nsima, Yozefe apusanaki liboso ná Rashele, mpe bagumbamaki.+

8 Esau alobaki ete: “Olingi kosala nini na etuluku nyonso oyo ya bato mpe banyama oyo nakutani na bango?”+ Ayanolaki ete: “Ezali mpo nandimama na miso ya nkolo na ngai.”+ 9 Bongo Esau alobaki ete: “Nazali na biloko ebele mpenza, ndeko na ngai.+ Batelá biloko na yo.” 10 Kasi, Yakobo alobaki ete: “Te, nabondeli yo. Soki nandimami na miso na yo, ndimá likabo ya lobɔkɔ na ngai, mpo namemi yango mpo nakoka komona elongi na yo. Mpe komona elongi na yo ezali lokola nde namoni elongi ya Nzambe, na ndenge oyambi ngai na esengo.+ 11 Nabondeli yo, ndimá likabo oyo ezali lipamboli na ngai, oyo namemeli yo,+ mpo Nzambe andimi ngai mpe nazali na eloko nyonso oyo nasengeli na yango.”+ Mpe akobaki kobondela ye, bongo Esau andimaki yango.

12 Na nsima, Esau alobaki ete: “Tólongwa awa mpe tókende, mpe ngai nakozala liboso na yo.” 13 Kasi Yakobo alobaki na ye ete: “Nkolo na ngai oyebi ete bana bazali makasi mingi te+ mpe nazali na bampate mpe bangɔmbɛ oyo ezali komɛlisa bana na yango. Soki batambwisi yango nokinoki mpenza na mokolo moko, boye etonga mobimba ekokufa. 14 Nabondeli yo, tiká nkolo na ngai aleka liboso ya mosaleli na ye, kasi ngai nakokoba mobembo malɛmbɛmalɛmbɛ ndenge oyo etonga ezali kotambola, mpe ndenge oyo bana bazali kotambola tii nakokóma epai ya nkolo na ngai na Seire.”+ 15 Na nsima, Esau alobaki ete: “Nabondeli yo, tiká natikela yo ndambo ya bato oyo bazali elongo na ngai.” Na yango, Yakobo alobaki ete: “Mpo na nini? Kondimama na miso ya nkolo na ngai ekoki mpo na ngai.” 16 Bongo na mokolo yango Esau azongaki na Seire.

17 Kasi Yakobo akendaki na Sukote,+ amitongelaki ndako mpe asalaki mwa bandako mpo na etonga na ye. Yango wana apesaki esika yango nkombo Sukote.*

18 Nsima ya kolongwa na Padane-arame,+ Yakobo akómaki malamu na engumba Shekeme,+ na mokili ya Kanana,+ mpe atyaki kaa pene na engumba yango. 19 Na nsima, asombaki eteni ya elanga epai ya bana ya Hamore, tata ya Shekeme, na ntalo ya mbongo ya ebende 100 mpe atɛlɛmisaki hema na ye kuna.+ 20 Nsima na yango, atongaki etumbelo kuna mpe abengaki yango “Nzambe, Nzambe ya Yisraele.”+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto