Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 21
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Mitángo

      • Balongi mokonzi ya Arade (1-3)

      • Nyoka ya kwivre (4-9)

      • Yisraele etamboli zingazinga ya Moabe (10-20)

      • Balongi mokonzi Sihone ya Baamore (21-30)

      • Balongi mokonzi Oge (31-35)

Mitángo 21:1

Mitindami

  • +Mit 33:40; Yos 12:7, 14

Mitángo 21:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “epesami mpo na kobebisama.”

Mitindami

  • +Mit 14:45

Mitángo 21:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “milimo ya bato ekokaki.”

Mitindami

  • +Mit 33:41
  • +Mit 20:21; Mib 2:8; Bas 11:18

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/3/1995, lok. 17

Mitángo 21:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “milimo na biso ekómi.”

  • *

    To, “koyoka mpii.”

Mitindami

  • +Kob 14:11; 15:24; Mit 16:13
  • +Mit 20:5
  • +Kob 16:15; Mit 11:6; Nz 78:24, 25

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/1999, nk. 26-27

    “Makomami nyonso,” lok. 35

Mitángo 21:6

Mitindami

  • +1Ko 10:6, 9

Mitángo 21:7

Mitindami

  • +Nz 78:34
  • +Kob 32:11

Mitángo 21:8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 35

Mitángo 21:9

Mitindami

  • +2Ba 18:1, 4
  • +Yn 3:14, 15
  • +Yn 6:40

Mitángo 21:10

Mitindami

  • +Mit 33:43

Mitángo 21:11

Mitindami

  • +Mit 33:44

Mitángo 21:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Mib 2:13

Mitángo 21:13

Mitindami

  • +Mit 22:36; Bas 11:18

Mitángo 21:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bawadi.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Penepene na Yehova, lok. 64

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2009, lok. 32

    1/8/2004, lok. 26

    15/8/1990, lok. 29

    1/7/1990, nk. 18, 20, 22-23, 28

Mitángo 21:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “monɔkɔ.”

  • *

    To, “bawadi.”

Mitángo 21:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Bóyembela yango!”

Mitángo 21:19

Mitindami

  • +Yos 13:15, 17

Mitángo 21:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mokili.”

  • *

    To mbala mosusu, “mokili ekauká; esobe.”

Mitindami

  • +Mit 33:49
  • +Mib 3:27; 34:1
  • +Mit 23:28

Mitángo 21:21

Mitindami

  • +Mib 2:26-28

Mitángo 21:22

Mitindami

  • +Mit 20:14, 17

Mitángo 21:23

Mitindami

  • +Mib 2:30-35; 29:7; Bas 11:19, 20

Mitángo 21:24

Mitindami

  • +Nz 135:10, 11
  • +Mit 32:33; Ne 9:22
  • +Mit 21:13; Mib 3:16
  • +Bas 11:21, 22
  • +Mit 32:1; 1Nt 6:77, 81
  • +Yos 12:1, 2

Mitángo 21:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ezali zingazinga.”

Mitindami

  • +Eb 10:15, 16; 15:16; Kob 3:8; Mib 7:1

Mitángo 21:29

Mitindami

  • +Bas 11:23, 24; 1Ba 11:7; 2Ba 23:13

Mitángo 21:30

Mitindami

  • +Yos 13:15, 17
  • +Yos 13:8, 9

Mitángo 21:32

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ezali zingazinga.”

Mitindami

  • +Mit 32:1

Mitángo 21:33

Mitindami

  • +Mib 3:11; 4:47; Yos 13:8, 12
  • +Mib 3:1, 8, 10

Mitángo 21:34

Mitindami

  • +Mib 20:3
  • +Kob 23:27; Mib 7:24
  • +Mib 3:2; Nz 135:10, 11

Mitángo 21:35

Mitindami

  • +Mib 3:3
  • +Yos 12:4-6

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Mit. 21:1Mit 33:40; Yos 12:7, 14
Mit. 21:3Mit 14:45
Mit. 21:4Mit 33:41
Mit. 21:4Mit 20:21; Mib 2:8; Bas 11:18
Mit. 21:5Kob 14:11; 15:24; Mit 16:13
Mit. 21:5Mit 20:5
Mit. 21:5Kob 16:15; Mit 11:6; Nz 78:24, 25
Mit. 21:61Ko 10:6, 9
Mit. 21:7Nz 78:34
Mit. 21:7Kob 32:11
Mit. 21:92Ba 18:1, 4
Mit. 21:9Yn 3:14, 15
Mit. 21:9Yn 6:40
Mit. 21:10Mit 33:43
Mit. 21:11Mit 33:44
Mit. 21:12Mib 2:13
Mit. 21:13Mit 22:36; Bas 11:18
Mit. 21:19Yos 13:15, 17
Mit. 21:20Mit 33:49
Mit. 21:20Mib 3:27; 34:1
Mit. 21:20Mit 23:28
Mit. 21:21Mib 2:26-28
Mit. 21:22Mit 20:14, 17
Mit. 21:23Mib 2:30-35; 29:7; Bas 11:19, 20
Mit. 21:24Nz 135:10, 11
Mit. 21:24Mit 32:33; Ne 9:22
Mit. 21:24Mit 21:13; Mib 3:16
Mit. 21:24Bas 11:21, 22
Mit. 21:24Mit 32:1; 1Nt 6:77, 81
Mit. 21:24Yos 12:1, 2
Mit. 21:25Eb 10:15, 16; 15:16; Kob 3:8; Mib 7:1
Mit. 21:29Bas 11:23, 24; 1Ba 11:7; 2Ba 23:13
Mit. 21:30Yos 13:15, 17
Mit. 21:30Yos 13:8, 9
Mit. 21:32Mit 32:1
Mit. 21:33Mib 3:11; 4:47; Yos 13:8, 12
Mit. 21:33Mib 3:1, 8, 10
Mit. 21:34Mib 20:3
Mit. 21:34Kob 23:27; Mib 7:24
Mit. 21:34Mib 3:2; Nz 135:10, 11
Mit. 21:35Mib 3:3
Mit. 21:35Yos 12:4-6
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Mitángo 21:1-35

Mitángo

21 Ntango Mokanana, mokonzi ya Arade,+ oyo afandaki na Negebe, ayokaki ete Yisraele ayaki na nzela ya Atarime, abundisaki Yisraele mpe amemaki ndambo na bango bakangami. 2 Na yango, Yisraele asalaki elako oyo epai ya Yehova ete: “Soki opesi bato oyo na lobɔkɔ na ngai, nakobebisa mpenza bingumba na bango.” 3 Boye Yehova ayokaki mongongo ya Yisraele mpe akabaki Bakanana epai na bango, mpe babebisaki bango ná bingumba na bango. Yango wana bapesaki esika yango nkombo Horoma.*+

4 Wana bazalaki kokoba mobembo na bango banda na Ngomba Hore,+ na nzela ya Mbu Motane, mpo na koleka zingazinga na mokili ya Edome,+ bato bakokaki* lisusu kokanga motema te mpo na mobembo. 5 Mpe bato bazalaki kaka koloba mabe mpo na Nzambe ná Moize+ ete: “Mpo na nini bobimisaki biso na Ezipito mpo tókufa na esobe? Bilei mpe mai ezali te,+ mpe tokómi* koyina* mampa oyo ya mpamba.”+ 6 Bongo Yehova atindaki banyoka ya ngɛngɛ na kati ya bato, mpe ezalaki koswa bato, Bayisraele mingi bakufaki.+

7 Na yango, bato bayaki epai ya Moize mpe balobaki ete: “Tosali lisumu ndenge tolobi mabe mpo na Yehova mpe mpo na yo.+ Bondelá Yehova ete alongwela biso banyoka.” Mpe Moize abondelaki mpo na bato.+ 8 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Salá ekeko ya nyoka ya ngɛngɛ mpe tyá yango likoló ya likonzí. Mpe soki nyoka eswi moto, akotala yango mpe akotikala na bomoi.” 9 Na mbala moko Moize asalaki nyoka ya kwivre+ mpe atyaki yango likoló ya likonzí,+ mpe soki nyoka eswi moto mpe moto yango atali nyoka ya kwivre, azalaki kotikala na bomoi.+

10 Nsima na yango, Bayisraele bakendaki mpe batyaki kaa na Obote.+ 11 Na nsima balongwaki na Obote mpe batyaki kaa na Iye-abarime,+ na esobe oyo ezali na ngámbo oyo etalani na Moabe epai ya ɛsti. 12 Balongwaki kuna mpe batyaki kaa pene na Lobwaku* ya Zerede.+ 13 Balongwaki kuna mpe batyaki kaa na etúká ya Arnone,+ oyo ezali na esobe oyo ekei tii na ndelo ya Baamore, mpo Arnone ezali kati na Moabe ná Baamore. 14 Yango wana, buku ya Bitumba ya Yehova elobeli “Vahebe na Sufa mpe mabwaku* ya Arnone, 15 mpe kokita* ya mabwaku,* oyo ekei na ngámbo ya mboka Are mpe ekutani na ndelo ya Moabe.”

16 Na nsima, bakendaki na Beere. Ezali libulu ya mai oyo Yehova alobaki na Moize ete: “Yanganisá bato, napesa bango mai.”

17 Na ntango yango, Yisraele eyembaki loyembo oyo:

“Bimisá mai, Ee libulu!—Bózongisela yango maloba!*

18 Libulu ya mai oyo bankumu batimolaki, oyo bato ya lokumu na kati ya bato batimolaki,

Na lingenda ya komanda ná mangenda na bango moko.”

Na nsima, balongwaki na esobe mpe bakendaki na Matana, 19 balongwaki na Matana, bakendaki na Nahaliele, mpe balongwaki na Nahaliele, bakendaki na Bamote.+ 20 Balongwaki na Bamote, bakendaki na lobwaku oyo ezali na teritware* ya Moabe,+ na nsɔngɛ ya Pisga,+ oyo eleki Yeshimone* na molai.+

21 Sikoyo Yisraele atindelaki Sihone, mokonzi ya Baamore bamemi-nsango na maloba oyo:+ 22 “Tiká biso tóleka na mokili na yo. Tokoleka te na elanga to na elanga ya vinyo. Tokomɛla mai ya libulu ata moko te. Tokotambola na balabala ya Mokonzi tii tokoleka na teritware na yo.”+ 23 Sihone apesaki Yisraele nzela te ya koleka na teritware na ye. Kasi, Sihone ayanganisaki bato na ye nyonso mpe abimaki kokutana na Yisraele na esobe, mpe akómaki na Yahaze mpe abandaki kobunda na Yisraele.+ 24 Bongo Yisraele alongaki ye na mopanga+ mpe azwaki mokili+ na ye banda na Arnone+ tii na Yaboke,+ pene na Baamone, mpo Yazere+ ezali ndelo ya teritware ya Baamone.+

25 Na yango, Yisraele azwaki bingumba wana nyonso, mpe babandaki kofanda na bingumba nyonso ya Baamore,+ na Heshibone mpe na basité nyonso oyo esimbami* na yango. 26 Mpo Heshibone ezalaki engumba ya Sihone, mokonzi ya Baamore, oyo abundaki na mokonzi ya Moabe mpe azwaki mokili na ye nyonso na lobɔkɔ na ye tii na Arnone. 27 Yango nde ebimisá lisese oyo mpo na kotyola ete:

“Bóya na Heshibone.

Engumba ya Sihone etongama mpe etɛlɛmisama makasi.

28 Mpo mɔtɔ ebimi na Heshibone, mɔtɔ euti na engumba ya Sihone.

Ezikisi Are ya Moabe, bankolo ya bisika oyo etombwaná ya Arnone.

29 Mawa na yo, Moabe! Bokobebisama, Ee bato ya Kemoshe!+

Akokómisa bana na ye ya mibali bato oyo bazali kokimakima mpe bana na ye ya basi bakangami ya Sihone, mokonzi ya Baamore.

30 Tóbundisa bango.

Heshibone ekobebisama tii na Dibone;+

Tótika yango mpamba tii na Nofa;

Mɔtɔ ekopanzana tii na Medeba.”+

31 Bongo Yisraele akómaki kofanda na mokili ya Baamore. 32 Na nsima, Moize atindaki mwa bato bánɔnga Yazere.+ Bazwaki bingumba oyo esimbami* na yango, mpe babenganaki Baamore oyo bazalaki wana. 33 Nsima na yango, babalukaki mpe bamataki na nzela ya Bashane. Mpe Oge+ mokonzi ya Bashane abimaki ná bato na ye nyonso mpo na kobundisa bango na Edrei.+ 34 Yehova alobaki na Moize ete: “Kobanga ye te,+ mpo nakopesa ye ná bato na ye nyonso mpe mokili na ye na lobɔkɔ na yo,+ mpe okosala ye kaka ndenge osalaki Sihone mokonzi ya Baamore, oyo azalaki kofanda na Heshibone.”+ 35 Bongo bakobaki kobɛta ye ná bana na ye ya mibali mpe bato na ye nyonso, tii moto na ye ata moko te atikalaki na bomoi,+ mpe bazwaki mokili na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto