Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 3
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Mitángo

      • Bana mibali ya Arona (1-4)

      • Balevi baponami mpo na kopesa banganga-nzambe mabɔkɔ (5-39)

      • Kosikolama ya mwana nyonso ya liboso (40-51)

Mitángo 3:1

Mitindami

  • +Kob 19:2

Mitángo 3:2

Mitindami

  • +Le 10:1; 1Nt 24:2
  • +Kob 6:25; Mib 10:6
  • +Kob 6:23; 38:21; 1Nt 6:3

Mitángo 3:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “lobɔkɔ na bango ekotondisama na nguya.”

Mitindami

  • +Kob 28:1; Le 8:2, 3

Mitángo 3:4

Mitindami

  • +Le 10:1, 2
  • +Mit 3:32; 20:26
  • +Mit 4:28; 7:8

Mitángo 3:6

Mitindami

  • +Mit 8:6; 18:2
  • +Mit 1:50; 8:11

Mitángo 3:8

Mitindami

  • +Mit 4:12
  • +Mit 1:51

Mitángo 3:9

Mitindami

  • +Mit 8:15, 16; 18:6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/4/1992, lok. 12

Mitángo 3:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mopaya,” elingi koloba, moto oyo azali na libota ya Arona te.

Mitindami

  • +Kob 40:15; Mit 18:7
  • +Mit 16:39, 40; 1Sa 6:19; 2Nt 26:16, 18

Mitángo 3:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “oyo bafungoli libumu.”

Mitindami

  • +Mit 3:41, 45

Mitángo 3:13

Mitindami

  • +Kob 13:2; 34:19; Mit 18:15; Lk 2:23
  • +Kob 13:15
  • +Le 27:26

Mitángo 3:14

Mitindami

  • +Kob 19:1

Mitángo 3:15

Mitindami

  • +Mit 3:39

Mitángo 3:17

Mitindami

  • +Kob 6:16; Mit 26:57; 1Nt 23:6

Mitángo 3:18

Mitindami

  • +Kob 6:17

Mitángo 3:19

Mitindami

  • +Kob 6:18

Mitángo 3:20

Mitindami

  • +1Nt 6:29
  • +Kob 6:19

Mitángo 3:21

Mitindami

  • +1Nt 6:20

Mitángo 3:22

Mitindami

  • +Mit 4:38-40

Mitángo 3:23

Mitindami

  • +Mit 1:53

Mitángo 3:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “rido.”

Mitindami

  • +Mit 4:24-26
  • +Kob 26:7
  • +Kob 26:14
  • +Kob 26:36

Mitángo 3:26

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “rido.”

Mitindami

  • +Kob 27:9
  • +Kob 27:16

Mitángo 3:27

Mitindami

  • +Mit 3:19

Mitángo 3:28

Mitindami

  • +Mit 4:34-36

Mitángo 3:29

Mitindami

  • +Mit 1:53

Mitángo 3:30

Mitindami

  • +Kob 6:22; 1Nt 6:18

Mitángo 3:31

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “rido.”

Mitindami

  • +Kob 25:10
  • +Kob 25:23
  • +Kob 25:31
  • +Kob 27:1, 2; 30:1-3
  • +Kob 38:3
  • +Kob 26:31
  • +Mit 4:15

Mitángo 3:32

Mitindami

  • +Mit 4:16; 20:28

Mitángo 3:33

Mitindami

  • +Mit 3:20; 26:58

Mitángo 3:34

Mitindami

  • +Mit 4:42-44

Mitángo 3:35

Mitindami

  • +Mit 1:53

Mitángo 3:36

Mitindami

  • +Kob 36:20
  • +Kob 36:31
  • +Kob 26:32, 37; 36:37, 38
  • +Kob 27:19
  • +Mit 4:31, 32

Mitángo 3:37

Mitindami

  • +Kob 27:10, 11

Mitángo 3:38

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Mopaya moko te,” elingi koloba, moto oyo azali Molevi te.

Mitindami

  • +Mit 3:10

Mitángo 3:40

Mitindami

  • +Mit 3:15

Mitángo 3:41

Mitindami

  • +Mit 3:12
  • +Kob 13:2; Mit 18:15

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/1995, lok. 16

Mitángo 3:45

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/1995, lok. 16

Mitángo 3:46

Mitindami

  • +Mit 18:15
  • +Mit 3:39, 43

Mitángo 3:47

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Shekele moko = 11,4 g. Talá Ap. B14.

  • *

    To, “na kolanda shekele mosantu.”

  • *

    Gera moko = 0,57 g. Talá Ap. B14.

Mitindami

  • +Mit 18:15, 16
  • +Le 27:25

Mitángo 3:51

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “monɔkɔ.”

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Mit. 3:1Kob 19:2
Mit. 3:2Le 10:1; 1Nt 24:2
Mit. 3:2Kob 6:25; Mib 10:6
Mit. 3:2Kob 6:23; 38:21; 1Nt 6:3
Mit. 3:3Kob 28:1; Le 8:2, 3
Mit. 3:4Le 10:1, 2
Mit. 3:4Mit 3:32; 20:26
Mit. 3:4Mit 4:28; 7:8
Mit. 3:6Mit 8:6; 18:2
Mit. 3:6Mit 1:50; 8:11
Mit. 3:8Mit 4:12
Mit. 3:8Mit 1:51
Mit. 3:9Mit 8:15, 16; 18:6
Mit. 3:10Kob 40:15; Mit 18:7
Mit. 3:10Mit 16:39, 40; 1Sa 6:19; 2Nt 26:16, 18
Mit. 3:12Mit 3:41, 45
Mit. 3:13Kob 13:2; 34:19; Mit 18:15; Lk 2:23
Mit. 3:13Kob 13:15
Mit. 3:13Le 27:26
Mit. 3:14Kob 19:1
Mit. 3:15Mit 3:39
Mit. 3:17Kob 6:16; Mit 26:57; 1Nt 23:6
Mit. 3:18Kob 6:17
Mit. 3:19Kob 6:18
Mit. 3:201Nt 6:29
Mit. 3:20Kob 6:19
Mit. 3:211Nt 6:20
Mit. 3:22Mit 4:38-40
Mit. 3:23Mit 1:53
Mit. 3:25Mit 4:24-26
Mit. 3:25Kob 26:7
Mit. 3:25Kob 26:14
Mit. 3:25Kob 26:36
Mit. 3:26Kob 27:9
Mit. 3:26Kob 27:16
Mit. 3:27Mit 3:19
Mit. 3:28Mit 4:34-36
Mit. 3:29Mit 1:53
Mit. 3:30Kob 6:22; 1Nt 6:18
Mit. 3:31Kob 25:10
Mit. 3:31Kob 25:23
Mit. 3:31Kob 25:31
Mit. 3:31Kob 27:1, 2; 30:1-3
Mit. 3:31Kob 38:3
Mit. 3:31Kob 26:31
Mit. 3:31Mit 4:15
Mit. 3:32Mit 4:16; 20:28
Mit. 3:33Mit 3:20; 26:58
Mit. 3:34Mit 4:42-44
Mit. 3:35Mit 1:53
Mit. 3:36Kob 36:20
Mit. 3:36Kob 36:31
Mit. 3:36Kob 26:32, 37; 36:37, 38
Mit. 3:36Kob 27:19
Mit. 3:36Mit 4:31, 32
Mit. 3:37Kob 27:10, 11
Mit. 3:38Mit 3:10
Mit. 3:40Mit 3:15
Mit. 3:41Mit 3:12
Mit. 3:41Kob 13:2; Mit 18:15
Mit. 3:46Mit 18:15
Mit. 3:46Mit 3:39, 43
Mit. 3:47Mit 18:15, 16
Mit. 3:47Le 27:25
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
  • 37
  • 38
  • 39
  • 40
  • 41
  • 42
  • 43
  • 44
  • 45
  • 46
  • 47
  • 48
  • 49
  • 50
  • 51
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Mitángo 3:1-51

Mitángo

3 Sikoyo, talá molɔngɔ ya mabota ya Arona ná Moize na mokolo oyo Yehova asololaki na Moize na Ngomba Sinai.+ 2 Talá nkombo ya bana mibali ya Arona: Nadabe mwana ya liboso, Abihu,+ Eleazare+ mpe Itamare.+ 3 Wana nde bankombo ya bana mibali ya Arona, banganga-nzambe oyo batyamaki mafuta,* mpe batyamaki mpo básala mosala ya banganga-nzambe.+ 4 Nzokande, Nadabe ná Abihu bakufaki na miso ya Yehova ntango bapesaki liboso ya Yehova mɔtɔ oyo epesamaki nzela te+ na esobe ya Sinai, mpe babotaki bana te. Kasi Eleazare+ ná Itamare+ bakobaki kosala mosala ya banganga-nzambe elongo na Arona tata na bango.

5 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: 6 “Memá libota ya Levi+ liboso, mpe okotɛlɛmisa bango liboso ya Arona nganga-nzambe, mpe bakosalela+ ye. 7 Bakokokisa mokumba na bango epai na ye mpe epai ya liyangani mobimba liboso ya hema ya kokutana na ndenge bakosala mosala oyo ezali na boyokani na tabernakle. 8 Bakobatela bisaleli nyonso+ ya hema ya kokutana mpe bakokokisa mikumba na bango epai ya Bayisraele na ndenge bakosala mosala oyo ezali na boyokani na tabernakle.+ 9 Okopesa Balevi epai ya Arona ná bana na ye ya mibali. Bazali bato oyo bapesami, bapesami epai na ye kati na Bayisraele.+ 10 Okotya Arona ná bana na ye ya mibali, mpe bakokokisa mikumba na bango ya bonganga-nzambe,+ mpe moto nyonso oyo apesami nzela te,* oyo akopusana pene akobomama.”+

11 Yehova akobaki koloba na Moize ete: 12 “Mpo na ngai, talá! Nazwi Balevi na kati ya Bayisraele na esika ya bana nyonso ya liboso* ya Bayisraele,+ mpe Balevi bakokóma ya ngai. 13 Mpo mwana nyonso ya liboso azali ya ngai.+ Na mokolo oyo nabɛtaki mwana nyonso ya liboso na mokili ya Ezipito,+ nasantisaki mpo na ngai mwana nyonso ya liboso na Yisraele banda na moto tii na nyama.+ Bakokóma ya ngai. Ngai nazali Yehova.”

14 Yehova alobaki lisusu na Moize na esobe ya Sinai+ ete: 15 “Komá bankombo ya bana ya Levi na kolanda mabota ya batata na bango mpe mabota na bango. Okokoma nkombo ya mobali nyonso oyo azali na mbula kobanda na sanza moko matá.”+ 16 Bongo Moize akomaki bankombo na bango na kolanda etinda ya Yehova, kaka ndenge azwaki mitindo. 17 Talá bana mibali ya Levi na kolanda bankombo na bango: Gereshone, Kohate, mpe Merari.+

18 Sikoyo talá bankombo ya bana mibali ya Gereshone na kolanda mabota na bango: Libini ná Shimei.+

19 Bana mibali ya Kohate na kolanda mabota na bango, bango oyo: Amirame, Yizare, Hebrone, mpe Uziele.+

20 Bana mibali ya Merari na kolanda mabota na bango, bango oyo: Maheli+ ná Mushi.+

Wana nde mabota ya Balevi na kolanda mabota ya batata na bango.

21 Na Gereshone: libota ya Balibini+ ná libota ya Bashimei. Wana nde mabota ya Bagereshone. 22 Motángo ya mibali nyonso kobanda sanza moko matá oyo bakomisamaki nkombo ezalaki 7 500.+ 23 Mabota ya Bagereshone etyaki kaa nsima ya tabernakle+ na wɛsti. 24 Nkumu ya ndako ya batata ya Bagereshone ezalaki Eliasafe mwana ya Laele. 25 Mokumba ya bana mibali ya Gereshone+ na hema ya kokutana ezalaki ya kobatela tabernakle ná hema,+ ezipeli na yango,+ elamba ya kozipa*+ ekɔtelo ya hema ya kokutana, 26 barido+ ya lopango, elamba ya kozipa*+ ekɔtelo ya lopango oyo ezali zingazinga ya tabernakle ná etumbelo, bansinga na yango ya hema, mpe mosala nyonso oyo ezali na boyokani na yango.

27 Na Kohate: libota ya Baamirame, libota ya Bayizare, libota ya Bahebrone, mpe libota ya Bauziele. Wana ezalaki mabota ya Bakohate.+ 28 Motángo ya mibali nyonso, kobanda sanza moko matá ezalaki 8 600; bazalaki na mokumba ya kobatela esika mosantu.+ 29 Mabota ya bana ya Kohate batyaki kaa na ngámbo ya sudi ya tabernakle.+ 30 Nkumu ya ndako ya batata ya mabota ya Bakohate ezalaki Elizafane mwana ya Uziele.+ 31 Mokumba na bango ezalaki ya kobatela Sanduku,+ mesa,+ etɛlɛmiselo ya miinda,+ bitumbelo,+ bisaleli+ oyo bazalaki kosalela na esika mosantu, elamba ya kozipa,*+ mpe mosala nyonso oyo ezali na boyokani na yango.+

32 Nkumu ya bankumu ya Balevi ezalaki Eleazare+ mwana ya Arona nganga-nzambe, oyo azalaki kokamba baoyo bazalaki kokokisa mikumba oyo etali esika mosantu.

33 Na Merari: libota ya Bamaheli ná libota ya Bamushi. Wana ezalaki mabota ya Merari.+ 34 Motángo ya mibali nyonso, kobanda na sanza moko matá ezalaki 6 200.+ 35 Nkumu ya ndako ya batata ya mabota ya Merari ezalaki Zuriele mwana ya Abihaile. Batyaki kaa na ngámbo ya nɔrdi ya tabernakle.+ 36 Bana ya Merari bazalaki na mokumba ya kobatela bakadrɛ+ ya tabernakle, bikangiseli+ na yango, makonzí+ na yango, bitɛlɛmiselo na yango oyo ezali na mabulu, bisaleli+ na yango nyonso, mpe kolandela mosala nyonso oyo ezali na boyokani na yango,+ 37 ata mpe makonzí ya lopango oyo ezali zingazinga, bitɛlɛmiselo na yango oyo ezali na mabulu,+ bapike na yango, mpe bansinga na yango.

38 Baoyo batyaki kaa liboso ya tabernakle na ɛsti, liboso ya hema ya kokutana epai moi ebimaka, ezalaki Moize, Arona ná bana na ye ya mibali. Bazalaki kokokisa mokumba na esika mosantu mpe mokumba na bango epai ya Bayisraele. Moto nyonso oyo apesami nzela te* oyo akopusana pene akobomama.+

39 Balevi nyonso ya mibali kobanda sanza moko matá oyo Moize ná Arona bakomaki nkombo na kolanda mabota na bango na etinda ya Yehova, bazalaki 22 000.

40 Na nsima, Yehova alobaki na Moize ete: “Komá bankombo ya bana mibali nyonso ya liboso ya Bayisraele, kobanda na sanza moko matá,+ tángá bango, mpe zwá motángo ya bankombo na bango. 41 Osengeli kozwa Balevi mpo na ngai na esika ya bana nyonso ya liboso ya Bayisraele,+ mpe okozwa banyama ya mboka ya Balevi na esika ya bana nyonso ya liboso ya banyama ya mboka ya Bayisraele.+ Ngai nazali Yehova.” 42 Mpe Moize akomaki bankombo ya bana nyonso ya liboso kati na Bayisraele, kaka ndenge Yehova apesaki ye mitindo. 43 Motángo ya bana mibali nyonso ya liboso oyo bakomamaki nkombo kobanda na sanza moko matá ezalaki 22 273.

44 Yehova akobaki koloba na Moize ete: 45 “Zwá Balevi na esika ya bana nyonso ya liboso kati na Bayisraele, mpe zwá banyama ya mboka ya Balevi na esika ya banyama na bango ya mboka, mpe Balevi basengeli kokóma ya ngai. Ngai nazali Yehova. 46 Mpo na motuya ya lisiko+ ya bato 273 kati na bana ya liboso ya Bayisraele, oyo baleki motángo ya Balevi,+ 47 okozwa shekele* mitano mpo na moto mokomoko,+ na kolanda shekele ya esika mosantu.* Shekele moko ezali gera* 20.+ 48 Osengeli kopesa Arona ná bana na ye ya mibali mbongo yango mpo ezala motuya ya lisiko ya baoyo baleki motángo na bango.” 49 Bongo Moize azwaki mbongo ya motuya ya lisiko epai ya baoyo balekaki motángo ya motuya ya lisiko ya Balevi. 50 Azwaki mbongo epai ya bana ya liboso ya Bayisraele: shekele 1 365, na kolanda shekele ya esika mosantu. 51 Na nsima, Moize apesaki Arona ná bana na ye ya mibali mbongo ya motuya ya lisiko, na kolanda liloba* ya Yehova, kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto