Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakorinti 4
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Bakorinti

      • Bakapita basengeli kozala sembo (1-5)

      • Bakristo basengeli kozala na komikitisa (6-13)

        • ‘Bókende mosika te koleka oyo ekomamá’ (6)

        • Bakristo bakómi biloko ya kotala (9)

      • Paulo azali komitungisa mpo na bana na ye ya elimo (14-21)

1 Bakorinti 4:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “basali na nse.”

Mitindami

  • +Mt 13:11; Ro 16:25, 26

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/12/2012, lok. 11

    1/8/2000, nk. 14-15

1 Bakorinti 4:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/12/2012, nk. 12-13

1 Bakorinti 4:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

  • *

    Talá Ap. A5.

Mitindami

  • +Mas 21:2; Ro 14:10; Ebr 4:13

1 Bakorinti 4:5

Mitindami

  • +Mt 7:1
  • +Mas 10:9; 2Ko 10:18; 1Ti 5:24, 25

1 Bakorinti 4:6

Mitindami

  • +1Ko 1:12
  • +Ro 12:3; 2Ko 12:20; 3Yn 9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/4/2008, lok. 7

1 Bakorinti 4:7

Mitindami

  • +Yn 3:27

1 Bakorinti 4:8

Mitindami

  • +Em 20:4, 6
  • +2Ti 2:12; Em 3:21

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2008, lok. 22

    15/1/1994, lok. 17

1 Bakorinti 4:9

Mitindami

  • +Ro 8:36; 1Ko 15:32; 2Ko 6:4, 9
  • +Ebr 10:33

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/5/2009, lok. 24

    15/9/1990, nk. 24-25

    Mosala ya Bokonzi,

    8/2001, lok. 1

1 Bakorinti 4:10

Mitindami

  • +1Ko 3:18

1 Bakorinti 4:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “tozali bolumbu.”

Mitindami

  • +Flp 4:12
  • +2Ko 11:27
  • +Mis 14:19; 23:2; 2Ko 11:24

1 Bakorinti 4:12

Mitindami

  • +Mis 18:3; 20:34; 1Te 2:9
  • +Ro 12:14; 1Pe 3:9
  • +Mt 5:44

1 Bakorinti 4:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “tobondelaka.”

Mitindami

  • +1Pe 2:23

1 Bakorinti 4:15

Mitindami

  • +Ga 4:19; 1Te 2:11

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/1993, lok. 15

1 Bakorinti 4:16

Mitindami

  • +1Ko 11:1; Flp 3:17; 1Te 1:6

1 Bakorinti 4:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “banzela na ngai.”

Mitindami

  • +2Ti 1:13

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    4/2018, lok. 14

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    1/2017, nk. 30-31

1 Bakorinti 4:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ap. A5.

1 Bakorinti 4:21

Mitindami

  • +2Ko 13:10

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Ko. 4:1Mt 13:11; Ro 16:25, 26
1 Ko. 4:4Mas 21:2; Ro 14:10; Ebr 4:13
1 Ko. 4:5Mt 7:1
1 Ko. 4:5Mas 10:9; 2Ko 10:18; 1Ti 5:24, 25
1 Ko. 4:61Ko 1:12
1 Ko. 4:6Ro 12:3; 2Ko 12:20; 3Yn 9
1 Ko. 4:7Yn 3:27
1 Ko. 4:8Em 20:4, 6
1 Ko. 4:82Ti 2:12; Em 3:21
1 Ko. 4:9Ro 8:36; 1Ko 15:32; 2Ko 6:4, 9
1 Ko. 4:9Ebr 10:33
1 Ko. 4:101Ko 3:18
1 Ko. 4:11Flp 4:12
1 Ko. 4:112Ko 11:27
1 Ko. 4:11Mis 14:19; 23:2; 2Ko 11:24
1 Ko. 4:12Mis 18:3; 20:34; 1Te 2:9
1 Ko. 4:12Ro 12:14; 1Pe 3:9
1 Ko. 4:12Mt 5:44
1 Ko. 4:131Pe 2:23
1 Ko. 4:15Ga 4:19; 1Te 2:11
1 Ko. 4:161Ko 11:1; Flp 3:17; 1Te 1:6
1 Ko. 4:172Ti 1:13
1 Ko. 4:212Ko 13:10
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Bakorinti 4:1-21

Mokanda ya liboso epai ya Bakorinti

4 Basengeli kotalela biso lokola basali* ya Kristo mpe bakapita ya basekele mosantu ya Nzambe.+ 2 Na likambo oyo, eloko oyo balukaka epai ya bakapita ezali ete bámonana sembo. 3 Nzokande mpo na ngai, ezali likambo ya moke ete natalelama epai na bino to na tribinale moko ya bato. Kutu ngai moko namitalelaka te. 4 Nayebi ete nasali likambo moko te ya mabe. Kasi nalingi koloba te ete nazali moto ya sembo,* mpo kaka Yehova* nde moto akokata soki oyo nasali ezali malamu to mabe.+ 5 Na yango, bósambisa eloko moko te+ liboso ya ntango na yango, tii Nkolo akoya. Akobimisa na pole makambo oyo ebombamá ya molili mpe akomonisa polele makanisi ya mitema, mpe na ntango yango moto na moto akozwa lokumu na ye oyo euti na Nzambe.+

6 Bandeko, nalobi makambo wana mpo na ngai moko mpe Apolosi+ mpo na kosalisa bino bókanga ntina. Mpo na nzela ya ndakisa na biso bóyekola likambo oyo: “Bókende mosika te koleka makambo oyo ekomamá,” mpo bóvimba na lolendo+ te mpe bókanisa te ete moto moko aleki moto mosusu. 7 Mpo nani akesenisi yo na mosusu? Ɛɛ, eloko nini ozali na yango oyo bapesaki yo kopesa te?+ Sikoyo soki bapesaki yo yango kopesa, mpo na nini ozali komikumisa lokola nde bapesaki yo yango te?

8 Bosili kotonda, boye te? Bosili kokóma bato ya bomɛngo, boye te? Bobandi koyangela+ bino moko, biso tozali te? Nakosepela mpenza bóbanda koyangela, mpo biso mpe tóyangela elongo na bino.+ 9 Mpo namoni lokola Nzambe atandi biso bantoma na esika ya nsuka lokola bato oyo basengeli kokufa,+ mpo tokómi eloko ya kotala liboso ya mokili,+ liboso ya baanzelu, mpe liboso ya bato. 10 Biso tozali bazoba+ mpo na Kristo, kasi bino bozali bato ya mayele na kati ya Kristo; biso tolɛmbi, kasi bino bozali na makasi; bino bozwi lokumu, kasi biso totyolami. 11 Tii sikoyo tozali kokoba koyoka nzala,+ koyoka mposa ya mai,+ kozanga bilamba,* kobɛtamabɛtama+ mpe kozanga esika ya kofanda 12 mpe tozali kosala mosala makasi na mabɔkɔ na biso moko.+ Ntango bazali kofinga biso, topambolaka bango;+ ntango bazali konyokola biso, tokobaka koyika mpiko;+ 13 ntango bakoselaka biso makambo, toyanolaka na boboto;*+ tii sikoyo bato ya mokili bazali kotalela biso lokola bosɔtɔ, mpe biloko oyo eboyami na biloko nyonso.

14 Nazali kokoma makambo oyo, mpo na koyokisa bino nsɔni te, kasi mpo na kokebisa bino lokola bana na ngai ya bolingo. 15 Mpo ata soki bozali na balakisi 10 000 na kati ya Kristo, ya solo mpenza bozali na batata mingi te; mpo na kati ya Kristo Yesu, ngai nakómi tata na bino na nzela ya nsango malamu.+ 16 Na yango, nazali kolendisa bino ete bókóma bamekoli na ngai.+ 17 Yango wana nazali kotindela bino Timote, mpo azali mwana na ngai ya bolingo mpe ya sembo na kati ya Nkolo. Akokundwela bino ndenge na ngai ya kosala* na mosala ya Kristo Yesu,+ kaka ndenge nazali koteya epai nyonso na lisangá mokomoko.

18 Bato mosusu bavimbi na lolendo mpo bakanisi ete nakoya epai na bino te. 19 Kasi nsima ya mwa ntango moke, nakoya epai na bino, soki Yehova* alingi, mpe nakoluka te koyeba maloba ya baoyo bazali kovimba na lolendo, kasi nde nguya na bango. 20 Mpo Bokonzi ya Nzambe ezali likambo ya maloba te, kasi nde ya nguya. 21 Bolingi nini? Naya epai na bino na lingenda,+ to na bolingo mpe na boboto ya elimo?

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto