Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Emoniseli 1
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Emoniseli

      • Emoniseli oyo euti na Nzambe, na nzela ya Yesu (1-3)

      • Mbote na masangá nsambo (4-8)

        • “Ngai nazali Alfa ná Omega” (8)

      • Yoane akómi na mokolo ya Nkolo na nzela ya elimo santu (9-11)

      • Emonaneli ya nkembo ya Yesu (12-20)

Emoniseli 1:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Kofungwama; Komonisama.”

Mitindami

  • +Da 2:28
  • +Am 3:7; Em 7:3, 4
  • +Mt 10:2; Mr 1:19; Yn 21:20

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, nk. 15-17

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/12/1999, nk. 15-16

    1/11/1999, lok. 4

Emoniseli 1:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, nk. 16-17

Emoniseli 1:3

Mitindami

  • +Nz 1:2; Lk 11:28; Yn 13:17; Yk 1:22

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2009, lok. 31

    1/12/1999, nk. 14-16

    Emoniseli, nk. 6, 17

Emoniseli 1:4

Mitindami

  • +Em 1:11
  • +Em 1:8; 4:8; 11:17
  • +Em 4:5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2009, lok. 30

    Emoniseli, lok. 18

Emoniseli 1:5

Mitindami

  • +Em 3:14
  • +Kol 1:18
  • +Nz 89:27; 1Ti 6:15; Em 19:16
  • +Yn 15:9
  • +Ebr 9:14; 1Pe 1:18, 19; 1Yn 1:7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, nk. 18-19

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/12/1999, lok. 9

Emoniseli 1:6

Mitindami

  • +Kob 19:6; Lk 22:28-30
  • +1Pe 2:5; Em 5:9, 10; 20:6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, lok. 19

Emoniseli 1:7

Mitindami

  • +Mt 26:64; Mr 13:26
  • +Mt 24:30

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!, lok. 226

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2007, nk. 3, 5

    1/5/1993, nk. 22-23

    1/10/1992, nk. 15-16

    Emoniseli, nk. 19-20

    Ndenge ya kosolola, nk. 246-247

Emoniseli 1:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ap. A5.

  • *

    To, “A ná Z.” Alfa ná Omega ezali lɛtrɛ ya liboso mpe lɛtrɛ ya nsuka ya alfabɛ ya monɔkɔ ya Grɛki.

Mitindami

  • +Yis 48:12; Em 21:6; 22:13
  • +Kob 6:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2009, nk. 30-31

    1/12/1999, lok. 9

    Emoniseli, lok. 20

Emoniseli 1:9

Mitindami

  • +Mt 24:9
  • +Lk 12:32
  • +Mt 10:22; 2Ti 2:12
  • +Ro 8:17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, nk. 20-21

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/12/1999, nk. 14-15

Emoniseli 1:10

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Yesu azali nzela, lok. 313

    Emoniseli, nk. 22-24

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/5/2003, lok. 10

    15/12/1997, lok. 11

    15/4/1991, nk. 26-27

Emoniseli 1:11

Mitindami

  • +Ef 1:1; Em 2:1
  • +Em 2:8
  • +Em 2:12
  • +Em 2:18
  • +Em 3:1
  • +Em 3:7
  • +Em 3:14

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2009, lok. 30

    15/8/2007, nk. 9, 11

    Emoniseli, nk. 23-24

    Mokanda mpo na Eteyelo, lok. 15

    Ndenge ya kosolola, nk. 136-137

Emoniseli 1:12

Mitindami

  • +Em 1:20

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, nk. 25, 28-29

Emoniseli 1:13

Mitindami

  • +Da 7:13

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, lok. 25

Emoniseli 1:14

Mitindami

  • +Em 19:12

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, lok. 25

Emoniseli 1:15

Mitindami

  • +Em 2:18

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, nk. 25-26

Emoniseli 1:16

Mitindami

  • +Em 1:20
  • +Yis 49:2
  • +Mt 17:1, 2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/10/2012, lok. 14

    Emoniseli, nk. 26-27, 28-29

Emoniseli 1:17

Mitindami

  • +Mis 26:23; Kol 1:18; Em 1:5
  • +Em 2:8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2009, nk. 30-31

    Emoniseli, nk. 26-28

Emoniseli 1:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Hadesi,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +1Ko 15:45
  • +1Pe 3:18
  • +Ro 6:9; 1Ti 6:16
  • +Mt 16:18; Yn 6:54; 11:25

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, nk. 27-28

    Tósambela Nzambe, nk. 83-84

Emoniseli 1:19

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, lok. 24

Emoniseli 1:20

Mitindami

  • +Mt 5:16; Flp 2:15

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala,

    11/2019, lok. 5

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/10/2012, lok. 14

    15/9/2010, nk. 27-28

    15/1/2009, lok. 30

    1/4/2007, lok. 27

    15/5/2003, nk. 10-11

    15/3/2002, lok. 14

    Emoniseli, nk. 28-29, 136

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Em. 1:1Da 2:28
Em. 1:1Am 3:7; Em 7:3, 4
Em. 1:1Mt 10:2; Mr 1:19; Yn 21:20
Em. 1:3Nz 1:2; Lk 11:28; Yn 13:17; Yk 1:22
Em. 1:4Em 1:11
Em. 1:4Em 1:8; 4:8; 11:17
Em. 1:4Em 4:5
Em. 1:5Yn 15:9
Em. 1:5Ebr 9:14; 1Pe 1:18, 19; 1Yn 1:7
Em. 1:5Em 3:14
Em. 1:5Kol 1:18
Em. 1:5Nz 89:27; 1Ti 6:15; Em 19:16
Em. 1:6Kob 19:6; Lk 22:28-30
Em. 1:61Pe 2:5; Em 5:9, 10; 20:6
Em. 1:7Mt 26:64; Mr 13:26
Em. 1:7Mt 24:30
Em. 1:8Yis 48:12; Em 21:6; 22:13
Em. 1:8Kob 6:3
Em. 1:9Mt 24:9
Em. 1:9Lk 12:32
Em. 1:9Mt 10:22; 2Ti 2:12
Em. 1:9Ro 8:17
Em. 1:11Ef 1:1; Em 2:1
Em. 1:11Em 2:8
Em. 1:11Em 2:12
Em. 1:11Em 2:18
Em. 1:11Em 3:1
Em. 1:11Em 3:7
Em. 1:11Em 3:14
Em. 1:12Em 1:20
Em. 1:13Da 7:13
Em. 1:14Em 19:12
Em. 1:15Em 2:18
Em. 1:16Em 1:20
Em. 1:16Yis 49:2
Em. 1:16Mt 17:1, 2
Em. 1:17Mis 26:23; Kol 1:18; Em 1:5
Em. 1:17Em 2:8
Em. 1:181Ko 15:45
Em. 1:181Pe 3:18
Em. 1:18Ro 6:9; 1Ti 6:16
Em. 1:18Mt 16:18; Yn 6:54; 11:25
Em. 1:20Mt 5:16; Flp 2:15
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Emoniseli 1:1-20

Emoniseli epai ya Yoane

1 Emoniseli* ya Yesu Kristo, oyo Nzambe apesaki ye,+ mpo na kolakisa baombo na ye+ makambo oyo esengeli kosalema na mikolo oyo ezali koya. Mpe atindaki anzelu na ye mpe na nzela na ye, amonisaki yango na bilembo epai ya moombo na ye Yoane,+ 2 oyo atatolaki mpo na liloba oyo Nzambe apesaki mpe mpo na litatoli oyo Yesu Kristo apesaki, ɛɛ mpo na makambo nyonso oyo amonaki. 3 Esengo na moto oyo azali kotánga na mongongo makasi mpe na baoyo bazali koyoka maloba ya esakweli oyo, mpe bazali kotosa makambo oyo ekomami na kati,+ mpo ntango oyo etyamá ekómi pene.

4 Ngai Yoane, nazali kokomela masangá nsambo+ oyo ezali na etúká ya Azia:

Bózala na boboto monene mpe kimya oyo euti na “Oyo azali mpe azalaki mpe azali koya,”+ mpe na bilimo nsambo+ oyo ezali liboso ya kiti na ye ya bokonzi, 5 mpe na Yesu Kristo, “Motatoli ya Sembo,”+ “mwana ya liboso mpe moto ya liboso oyo asekwaki,”+ mpe “Moyangeli ya bakonzi ya mabele.”+

Yesu, moto oyo alingaka biso+ mpe oyo alongolaki biso na masumu na nzela ya makila na ye+— 6 mpe akómisi biso bokonzi,+ banganga-nzambe+ mpo na Nzambe mpe Tata na ye—ɛɛ, Yesu azala na nkembo mpe nguya libela na libela. Amen.

7 Talá! Azali koya na mapata,+ mpe moto nyonso akomona ye, ná baoyo batɔbɔlaki ye; mpe mabota nyonso ya mabele bakomibɛtabɛta ntolo na mpasi mpo na ye.+ Ɛɛ, Amen.

8 Yehova* Nzambe alobi ete: “Ngai nazali Alfa ná Omega,*+ Oyo azali mpe azalaki mpe azali koya, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.”+

9 Ngai Yoane, ndeko na bino mpe moto oyo azali kozwa bolɔzi,+ mpe bokonzi+ mpe koyika mpiko+ elongo na bino esika moko na Yesu.+ Bamemaki ngai na esanga ya Patimosi mpo nazalaki kolobela Nzambe mpe kotatola mpo na Yesu. 10 Na nzela ya elimo santu nakómaki na mokolo ya Nkolo, mpe nayokaki nsima na ngai mongongo moko ya makasi lokola oyo ya kelelo, 11 elobi: “Oyo ozali komona, komá yango na rulo mpe tindá yango na masangá nsambo: na Efese,+ na Simirna,+ na Pergame,+ na Tyatire,+ na Sarde,+ na Filadelfia,+ mpe na Laodikia.”+

12 Nabalukaki mpo na komona moto oyo azalaki koloba na ngai, mpe ntango nabalukaki, namonaki bitɛlɛmiselo ya miinda nsambo ya wolo,+ 13 mpe na katikati ya bitɛlɛmiselo ya miinda yango moto moko lokola mwana ya moto,+ alati elamba moko oyo ekiti tii na makolo, mpe alati elamba ya wolo zingazinga ya ntolo. 14 Lisusu, motó na ye mpe nsuki na ye ezalaki mpɛmbɛ lokola lɛni ya mpɛmbɛ, lokola nɛjɛ, mpe miso na ye ezalaki lokola lolemo ya mɔtɔ,+ 15 mpe makolo na ye ezalaki lokola kwivrɛ ya pɛto+ ntango ezali kongɛnga na kati ya esika ya mɔtɔ makasi; mpe mongongo na ye ezalaki lokola lokito ya ebele ya mai ezali kotíyola makasi. 16 Mpe azalaki na minzoto nsambo na lobɔkɔ na ye ya mobali,+ mpe mopanga moko ya molai oyo epeli makasi mpe ya mino mibale+ ezalaki kobima na monɔkɔ na ye, mpe elongi na ye ezalaki lokola moi ntango ezali kongɛnga makasi mpenza.+ 17 Ntango namonaki ye, nakweaki na makolo na ye lokola moto oyo akufi.

Mpe atyaki lobɔkɔ na ye ya mobali likoló na ngai mpe alobaki: “Kobanga te. Ngai nazali Moto ya Liboso+ mpe Moto ya Nsuka,+ 18 mpe moto ya bomoi;+ nakufaki,+ kasi talá! nazali na bomoi libela na libela,+ mpe nazali na bafungola ya liwa mpe ya Nkunda.*+ 19 Yango wana, komá makambo oyo omonaki, makambo oyo ezali sikoyo mpe oyo ekosalema nsima na yango. 20 Kasi sekele mosantu ya minzoto nsambo oyo omonaki na lobɔkɔ na ngai ya mobali, mpe ya bitɛlɛmiselo ya miinda nsambo ya wolo yango oyo: Minzoto nsambo elakisi baanzelu ya masangá nsambo, mpe bitɛlɛmiselo ya miinda nsambo elakisi masangá nsambo.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto