Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 26
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Samwele

      • Davidi aboyi lisusu koboma Saulo (1-25)

        • Davidi amonisi limemya mpo na moto oyo Yehova atye mafuta (11)

1 Samwele 26:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “mokili oyo ekauká; esobe.”

Mitindami

  • +Yos 15:20, 55
  • +Bas 19:14; 1Sa 10:26
  • +1Sa 23:14, 19, 24; Nz 54:maloba ya ebandeli ya loyembo

1 Samwele 26:2

Mitindami

  • +1Sa 24:2

1 Samwele 26:5

Mitindami

  • +1Sa 14:50; 17:55; 2Sa 2:8; 3:27

1 Samwele 26:6

Mitindami

  • +Eb 10:15
  • +2Sa 16:9; 18:5; 23:18
  • +2Sa 2:18; 1Nt 2:15, 16

1 Samwele 26:8

Mitindami

  • +1Sa 24:4; 26:23

1 Samwele 26:9

Mitindami

  • +1Sa 10:1
  • +1Sa 24:6; 2Sa 1:14; 1Nt 16:22; Nz 20:6

1 Samwele 26:10

Mitindami

  • +Mib 32:35; 1Sa 24:12; 25:38; Nz 94:1, 23
  • +Nz 37:12, 13
  • +1Sa 31:3, 6

1 Samwele 26:11

Mitindami

  • +Le 19:18; 1Sa 24:6; 1Nt 16:22; Nz 105:15

1 Samwele 26:12

Mitindami

  • +1Sa 24:4

1 Samwele 26:14

Mitindami

  • +1Sa 14:50; 17:55; 2Sa 2:8; 3:8

1 Samwele 26:15

Mitindami

  • +1Sa 26:8

1 Samwele 26:16

Mitindami

  • +1Sa 9:16, 17; 10:1
  • +1Sa 26:11

1 Samwele 26:17

Mitindami

  • +1Sa 24:8, 16

1 Samwele 26:18

Mitindami

  • +Nz 35:7
  • +1Sa 24:9, 11

1 Samwele 26:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ayoka nsolo ya.”

  • *

    Lil., “libula.” Yango ekoki kozala bato to mokili oyo bazwaki lokola libula.

Mitindami

  • +1Sa 24:9
  • +Kob 19:5; Mib 26:18

1 Samwele 26:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “kotika te ete makila na ngai esopana mosika.”

Mitindami

  • +1Sa 24:14

1 Samwele 26:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo.”

Mitindami

  • +1Sa 24:17
  • +1Sa 24:10; 26:11

1 Samwele 26:23

Mitindami

  • +Nz 7:8; 18:20
  • +1Sa 24:6; 26:9

1 Samwele 26:24

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo.”

  • *

    To, “molimo.”

Mitindami

  • +Nz 34:19

1 Samwele 26:25

Mitindami

  • +1Sa 24:19
  • +1Sa 24:22; 27:4

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Sa. 26:1Yos 15:20, 55
1 Sa. 26:1Bas 19:14; 1Sa 10:26
1 Sa. 26:11Sa 23:14, 19, 24; Nz 54:maloba ya ebandeli ya loyembo
1 Sa. 26:21Sa 24:2
1 Sa. 26:51Sa 14:50; 17:55; 2Sa 2:8; 3:27
1 Sa. 26:6Eb 10:15
1 Sa. 26:62Sa 16:9; 18:5; 23:18
1 Sa. 26:62Sa 2:18; 1Nt 2:15, 16
1 Sa. 26:81Sa 24:4; 26:23
1 Sa. 26:91Sa 10:1
1 Sa. 26:91Sa 24:6; 2Sa 1:14; 1Nt 16:22; Nz 20:6
1 Sa. 26:10Mib 32:35; 1Sa 24:12; 25:38; Nz 94:1, 23
1 Sa. 26:10Nz 37:12, 13
1 Sa. 26:101Sa 31:3, 6
1 Sa. 26:11Le 19:18; 1Sa 24:6; 1Nt 16:22; Nz 105:15
1 Sa. 26:121Sa 24:4
1 Sa. 26:141Sa 14:50; 17:55; 2Sa 2:8; 3:8
1 Sa. 26:151Sa 26:8
1 Sa. 26:161Sa 9:16, 17; 10:1
1 Sa. 26:161Sa 26:11
1 Sa. 26:171Sa 24:8, 16
1 Sa. 26:18Nz 35:7
1 Sa. 26:181Sa 24:9, 11
1 Sa. 26:191Sa 24:9
1 Sa. 26:19Kob 19:5; Mib 26:18
1 Sa. 26:201Sa 24:14
1 Sa. 26:211Sa 24:17
1 Sa. 26:211Sa 24:10; 26:11
1 Sa. 26:23Nz 7:8; 18:20
1 Sa. 26:231Sa 24:6; 26:9
1 Sa. 26:24Nz 34:19
1 Sa. 26:251Sa 24:19
1 Sa. 26:251Sa 24:22; 27:4
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Samwele 26:1-25

Mokanda ya liboso ya Samwele

26 Na nsima, mibali ya engumba Zife+ bayaki epai ya Saulo na Gibea,+ mpe balobaki: “Davidi abombani na ngomba moke ya Hakila, oyo etalani na Yeshimone.”*+ 2 Bongo Saulo atɛlɛmaki elongo na mibali 3 000 oyo aponaki na kati ya limpinga ya Yisraele mpe akitaki mpo na koluka Davidi na esobe ya Zife.+ 3 Saulo atyaki kaa na ngomba moke ya Hakila, oyo etalani na Yeshimone, pene na balabala. Nzokande Davidi azalaki kofanda na esobe, mpe ayokaki ete Saulo alandi ye kuna. 4 Bongo Davidi atindaki banɔngi mpo bákende kotala soki Saulo ayei mpenza. 5 Na nsima Davidi atɛlɛmaki mpe akendaki na esika oyo Saulo atyaki kaa, mpe Davidi amonaki esika oyo Saulo mpe Abinere+ mwana ya Nere, mokonzi ya basoda na ye, balalaki. Saulo alalaki na kati ya lopango ya kaa, bongo basoda balalaki zingazinga na ye. 6 Na nsima Davidi alobaki na Ahimeleke Mohiti,+ mpe na Abishai+ mwana ya Zeruya,+ ndeko ya Yoabe, boye: “Nani akokita na ngai na kaa epai ya Saulo?” Abishai ayanolaki: “Ngai nakokita elongo na yo.” 7 Bongo Davidi ná Abishai bakendaki na butu esika basoda bazalaki, mpe bakutaki Saulo alali na kati ya lopango ya kaa, ná likɔnga na ye epikami na mabele pene na motó na ye. Abinere ná basoda balalaki zingazinga na ye.

8 Bongo, Abishai alobaki na Davidi: “Lelo Nzambe akabi monguna na yo na lobɔkɔ na yo.+ Sikoyo, nabondeli yo, tiká nabaka ye na mabele na likɔnga, nakosala yango mbala mibale te, kaka mbala moko.” 9 Kasi Davidi alobaki na Abishai: “Kosala ye mabe te, mpo nani akoki kosembola lobɔkɔ na ye likoló ya moto oyo Yehova atye mafuta+ kozanga ete azwa likambo?”+ 10 Davidi alobaki lisusu: “Lokola Yehova azali solo na bomoi, Yehova ye moko akoboma ye,+ to mokolo na ye ekoya mpe akokufa,+ to mpe akokende na etumba mpe akobomama.+ 11 Nakoki kokanisa ata moke te kosembola lobɔkɔ na ngai mpo na kosala ye mabe, mpo azali moto oyo Yehova atye mafuta;+ mpo Yehova akosepela te soki nasali bongo! Sikoyo, nabondeli yo, zwá likɔnga oyo ezali pene na motó na ye mpe elokó ya mai, mpe yaká tókende.” 12 Na nsima Davidi azwaki likɔnga mpe elokó ya mai oyo ezalaki pene na motó ya Saulo, mpe bakendaki. Moto moko te amonaki+ bango, to atyaki likebi, to mpe alamukaki, mpo bango nyonso balalaki, mpo Yehova alalisaki bango mpɔngi moko ya makasi. 13 Nsima na yango, Davidi akendaki na ngámbo mosusu mpe atɛlɛmaki mwa mosika na bango na nsɔngɛ ya ngomba, mpe ntaka monene ekabolaki bango.

14 Davidi abelelaki na ngámbo oyo basoda mpe Abinere+ mwana ya Nere bazalaki, alobi: “Abinere, ozali koyoka ngai?” Abinere ayanolaki: “Nani wana azali kobelela mokonzi boye?” 15 Davidi alobaki na Abinere: “Ozali mobali ya mpiko, boye te? Nani akokani na yo na Yisraele mobimba? Sikoyo mpo na nini okɛngɛli nkolo na yo mokonzi te? Mpo soda moko akɔtaki na kaa mpo na koboma nkolo na yo mokonzi.+ 16 Okokisi mokumba na yo te. Lokola Yehova azali solo na bomoi, bobongi kokufa, mpo bokɛngɛli te nkolo na bino, moto oyo Yehova atye mafuta.+ Sikoyo talá! Wapi likɔnga ya mokonzi mpe elokó ya mai+ oyo ezalaki pene na motó na ye?”

17 Ntango Saulo ayebaki ete ezali mongongo ya Davidi, atunaki boye: “Ezali mongongo na yo, mwana na ngai Davidi?”+ Davidi azongisaki: “Ezali mongongo na ngai, nkolo na ngai mokonzi.” 18 Abakisaki: “Mpo na nini nkolo na ngai azali kolandalanda mosaleli na ye?+ Nasali nini? Lisumu nini ngai nasali?+ 19 Nabondeli yo, nkolo na ngai mokonzi, yoká maloba ya mosaleli na yo: Soki Yehova nde atindi yo osilikela ngai, tiká andima* likabo na ngai ya mbuma. Kasi soki bato nde batindi yo,+ balakelami mabe liboso ya Yehova, mpo babengani ngai lelo, mpo nazala lisusu elongo na bato* ya Yehova te,+ balobi: ‘Kende kosalela banzambe mosusu!’ 20 Mpe sikoyo, kotika ngai te nakufa* mosika na Yehova; mpo mokonzi ya Yisraele abimi mpo na kolukaluka nsili moko mpamba,+ lokola nde azalaki kolanda ekwale na bangomba.”

21 Bongo Saulo alobaki: “Nasali lisumu.+ Zongá, mwana na ngai Davidi, nakosala yo mabe lisusu te, mpo na mokolo ya lelo omoni ete bomoi* na ngai ezali na motuya mingi na miso na yo.+ Ya solo, nasali likambo moko ya bozoba mpe libunga moko monene!” 22 Davidi ayanolaki: “Likɔnga ya mokonzi yango oyo. Moko kati na bilenge mibali aya awa mpo na kozwa yango. 23 Yehova akofuta moto na moto na kolanda boyengebene+ na ye mpe bosembo na ye. Mpo lelo Yehova apesaki yo na lobɔkɔ na ngai, kasi naboyaki kosala mabe epai ya moto oyo Yehova atye mafuta.+ 24 Talá! Kaka ndenge bomoi* na yo ezali na motuya mingi na miso na ngai na mokolo ya lelo, tiká ete bomoi* na ngai mpe ezala na motuya mingi na miso ya Yehova, mpe abikisa ngai na bampasi na ngai nyonso.”+ 25 Saulo ayanolaki Davidi boye: “Tiká ete opambwama, mwana na ngai Davidi. Ya solo, okosala makambo ya minene mpe okolonga mpenza.”+ Bongo Davidi asimbaki nzela akei, mpe Saulo azongaki epai na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto