Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 37:35
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Mpe bana na ye nyonso ya mibali mpe bana na ye nyonso ya basi batɛlɛmaki mpo na kobɔndisa ye,+ kasi azalaki koboya kobɔndisama mpe azalaki koloba ete:+ “Mpo nakokita na Nkunda* na kolela mwana na ngai!” Mpe tata na ye azalaki kaka kolela ye.

  • Ebandeli 42:38
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 38 Kasi, ye alobaki ete: “Mwana na ngai akokita elongo na bino te, mpamba te ndeko na ye akufá mpe atikalá ye moko.+ Soki likama ya liwa ezwi ye na nzela oyo bozali kokende, bokokitisa mpenza nsuki na ngai ya mpɛmbɛ na mawa tii na Nkunda.”*+

  • Nzembo 16:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpo yo okotika molimo na ngai na kati ya Nkunda* te.+

      Okotika te ete moto na yo ya sembo amona libulu.+

  • Nzembo 88:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Mpo molimo na ngai emoni mpasi mingi,+

      Mpe bomoi na ngai ekómi penepene na Nkunda.*+

  • Mosakoli 9:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Nyonso oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na makasi na yo mpenza,+ mpo mosala ezali te, mwango te, boyebi te,+ bwanya mpe te+ na Nkunda,*+ esika ozali kokende.+

  • Hosea 13:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 “Nakosikola bango na lobɔkɔ ya Nkunda;*+ nakobikisa bango na liwa.+ Ee Liwa, wapi bitubeli na yo?+ Ee Nkunda,* wapi nguya na yo ya kobebisa?+ Nakomonisa motema mawa te.+

  • Matai 11:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpe yo, Kapernaume,+ mbala mosusu okotombwama tii na likoló? Okokita+ tii na Nkunda,*+ mpo soki misala ya nguya oyo esalemaki epai na yo esalemaka na Sodoma, mbɛlɛ yango ezali naino tii na mokolo ya lelo.

  • Misala 2:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 amonaki liboso mpe alobaki mpo na lisekwa ya Kristo, ete asundolamaki na kati ya Nkunda* te mpe nzoto na ye epɔlaki te.+

  • Emoniseli 20:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe mbu ezongisaki bakufi oyo bazalaki kuna, mpe liwa ná Nkunda* ezongisaki bakufi+ oyo bazalaki kuna, mpe moto na moto asambisamaki na kolanda misala na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto