Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 18:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Na yango Yetro alobaki ete: “Yehova apambolama, oyo abikisi bino na lobɔkɔ ya Ezipito mpe na lobɔkɔ ya Farao, mpe oyo alongoli bato na nse ya bokonzi ya Ezipito.+

  • Kolimbola Mibeko 8:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 “Ntango okolya mpe okotonda,+ osengeli mpe kopambola+ Yehova Nzambe na yo mpo na mokili malamu oyo apesi yo.+

  • 1 Bakonzi 1:48
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 48 Mpe lisusu, talá oyo mokonzi alobaki: ‘Yehova Nzambe ya Yisraele apambwama,+ ye oyo apesi lelo moto oyo akofanda na kiti na ngai ya bokonzi, mpe miso na ngai moko ezali komona yango!’”+

  • 1 Ntango 29:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Mpe Davidi alobaki lisusu na lisangá mobimba+ ete: “Sikoyo, bópambola+ Yehova Nzambe na bino.” Mpe lisangá mobimba bapambolaki Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango mpe bagumbamaki+ mpe bafukamaki bilongi na nse+ liboso ya Yehova mpe liboso ya mokonzi.

  • Luka 1:68
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 68 “Yehova Nzambe ya Yisraele apambwama,+ mpo atyeli bato na ye likebi mpe asikoli+ bango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto