18 Bongo ntango kaka asilisaki koloba na ye na Ngomba Sinai, apesaki Moize bitanda mibale ya Litatoli,+ bitanda ya mabanga oyo ekomami na mosapi ya Nzambe.+
20 Nsima na yango akamataki Litatoli+ mpe atyaki yango na kati ya Sanduku+ mpe akɔtisaki banzete ya komema+ Sanduku mpe atyaki ezipeli+ likoló ya Sanduku, na likoló.+
10 Na nsima, Yehova alobaki na Moize ete: “Zongisá lingenda ya Arona+ liboso ya Litatoli ezala eloko oyo esengeli kobatelama lokola elembo+ mpo na bana ya botomboki,+ mpo koimaima na bango esila liboso na ngai, mpo bákufa te.”
26 “Ntango bokozwa buku oyo ya mobeko,+ bosengeli kotya yango pembeni ya sanduku+ ya kondimana ya Yehova Nzambe na bino, mpe esengeli kozala wana lokola motatoli liboso na yo.+
9 Eloko moko te ezalaki na kati ya Sanduku, longola kaka bitanda mibale ya mabanga+ oyo Moize atyaki,+ na Horebe, ntango Yehova asalaki kondimana+ ná bana ya Yisraele wana bazalaki kobima na mokili ya Ezipito.+
4 Ezalaki na eloko ya kotumba mpaka ya malasi oyo esalemi na wolo+ ná sanduku ya kondimana+ oyo ezipamá mobimba na wolo,+ oyo ezalaki na elokó ya wolo oyo ezalaki na mana+ ná lingenda ya Arona oyo ebimisaki fololo+ ná bitanda+ ya kondimana na kati;