Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Ntango 16:40
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 40 mpo na kopesa Yehova makabo ya kotumba likoló ya etumbelo ya makabo ya kotumba ntango nyonso, ntɔngɔ mpokwa, mpe mpo na kosala nyonso oyo ekomami na mobeko oyo Yehova apesaki mitindo na Yisraele;+

  • 2 Ntango 2:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 talá, nazali kotongela+ nkombo+ ya Yehova Nzambe na ngai ndako mpo na kosantisela+ ye yango, mpo na kotumba mpaka ya malasi ya nsolo kitoko+ liboso na ye, ná mampa ya ntango nyonso oyo bamatisamatisá likoló ya mosusu+ ná makabo ya kotumba na ntɔngɔ mpe na mpokwa,+ na basabata,+ na basanza ya sika+ mpe na bileko ya fɛti+ ya Yehova Nzambe na biso. Yango ekozala mokumba ya Yisraele mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+

  • 2 Ntango 13:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe bazali kobimisela Yehova milinga ya makabo ya kotumba ntɔngɔ na ntɔngɔ mpe mpokwa na mpokwa+ ná mpaka ya malasi;+ mpe mampa oyo bamatisamatisá likoló ya mosusu ezali na mesa ya wolo ya pɛto,+ mpe etɛlɛmiselo ya miinda ya wolo+ ná miinda na yango mpo na kopelisa mpokwa na mpokwa ezali;+ mpo tozali kokokisa mokumba na biso+ liboso ya Yehova Nzambe na biso, kasi bino botiki ye.+

  • Danyele 9:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 “Mpe akobatela mpenza kondimana+ ezala naino mpo na bato ebele na boumeli ya pɔsɔ moko;+ mpe na katikati ya pɔsɔ yango akosukisa mbeka mpe likabo.+

      “Mpe moto oyo ayeisaka libebi akoya likoló ya lipapu ya biloko ya bosɔtɔ;+ mpe eloko oyo ekanami ekosopama likoló ya oyo ebebisamá tii na ntango ya kosilisa nyɛɛ.”+

  • Baebre 7:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Azali na ntina te ya kopesa bambeka mokolo na mokolo,+ lokola banganga-nzambe minene wana basalaka, libosoliboso mpo na masumu na ye moko+ mpe na nsima mpo na oyo ya bato:+ (mpo asalaki yango mbala moko+ mpo na libela ntango amikabaki;+)

  • Baebre 10:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Lisusu, nganga-nzambe nyonso atɛlɛmaka+ mokolo na mokolo+ mpo na kosala mosala mpo na bolamu ya bato nyonso mpe mpo na kopesa bambeka wana kaka mbala na mbala, mpo yango ekoki kolongola masumu te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto