Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 11:44
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 44 Mpo ngai nazali Yehova Nzambe na bino;+ mpe bosengeli komisantisa mpe bosengeli kozala basantu,+ mpamba te ngai nazali mosantu.+ Bongo, bosengeli te kokómisa milimo na bino mbindo na ekelamu nyonso oyo etondanaka, oyo ezali kotambola na mabele.

  • Balevi 18:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Mpe bosengeli kokokisa mokumba na bino epai na ngai na kosaláká te moko ya mimeseno oyo eyinamá oyo esalemaki liboso na bino,+ mpo bómikómisa mbindo na nzela na yango te. Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.’”

  • Balevi 19:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Lobá na liyangani mobimba ya bana ya Yisraele, mpe osengeli koyebisa bango ete: ‘Bokozala basantu,+ mpamba te ngai, Yehova Nzambe na bino, nazali mosantu.+

  • Ezekiele 20:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe osengeli koloba na bango boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Na mokolo oyo naponaki Yisraele,+ natombolaki mpe lobɔkɔ na ngai+ mpe nalapelaki momboto ya ndako ya Yakobo ndai+ mpe namiyebisaki epai na bango na mokili ya Ezipito.+ Ɛɛ, natombolaki lobɔkɔ na ngai mpe nalapelaki bango ndai ete: ‘Nazali Yehova Nzambe na bino.’+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto