Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 7:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Nde ngai, nakotika motema ya Farao ekóma makasi,+ mpe nakokómisa bilembo na ngai mpe makamwisi na ngai mingi na mokili ya Ezipito.+

  • Kobima 10:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Kɔtá epai ya Farao, mpamba te ngai natiki motema na ye mpe mitema ya basaleli na ye ekóma makasi,+ mpo natya bilembo na ngai oyo liboso na ye,+

  • Kobima 11:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpe Moize ná Arona basalaki makamwisi oyo nyonso liboso ya Farao,+ kasi Yehova azalaki kotika motema ya Farao ekóma makasi, bongo atikaki te bana ya Yisraele bálongwa na mokili na ye, bákende.+

  • Kolimbola Mibeko 2:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Mpe Sihone mokonzi ya Heshibone atikaki tóleka epai na ye te, mpamba te Yehova Nzambe na yo atikaki elimo na ye ekóma makasi+ mpe motema na ye ekóma makasi, mpo na kopesa ye na lobɔkɔ na yo, kaka ndenge ezali na mokolo ya lelo.+

  • 1 Samwele 6:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Kutu, mpo na nini bokoyeisa mitema na bino makasi ndenge Ezipito ná Farao bayeisaki mitema na bango makasi?+ Ezali te kaka na ntango oyo Ye anyokolaki bango+ nde batikaki bango bákende, mpe bakendaki?+

  • Danyele 5:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Kasi ntango motema na ye ekómaki na lolendo mpe akómaki motó makasi, bongo akómaki kosala na lofundo,+ alongolamaki na kiti ya bokonzi na ye mpe akitisamaki, mpe balongolaki ye lokumu na ye.+

  • Baroma 9:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Yango wana, moto oyo ye alingi koyokela mawa akoyokela ye mawa,+ kasi moto oyo ye alingi kotika ete akóma motó makasi akotika ye akóma motó makasi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto