6Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Sikoyo okomona oyo nakosala Farao,+ mpamba te mpo na nguya ya lobɔkɔ na ngai akotika bango bákende mpe na ntina ya nguya ya lobɔkɔ na ngai akobengana bango na mokili na ye.”+
11Mpe Yehova alobaki na Moize ete: “Nakoyeisela Farao ná Ezipito bolɔzi moko lisusu. Nsima na yango, akotika bino bólongwa awa, bókende.+ Na ntango akotika bino nyonso bókende, akobengana mpenza bino bólongwa awa.+