Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 17:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Boye bakopesa lisusu te bambeka na bango epai ya bademo na ndenge ya ntaba,+ oyo bazali kosala na bango pite.+ Ekozala mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te mpo na bino, na boumeli ya mabota na bino.”’

  • Kolimbola Mibeko 31:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Sikoyo Yehova alobaki na Moize ete: “Talá! Ozali kolala esika moko na bankɔkɔ na yo;+ mpe bato oyo bakotɛlɛma+ mpenza mpe bakosala pite na banzambe ya bapaya ya mokili epai bazali kokende,+ na kati na bango, mpe bakobosana ngai+ mpenza mpe bakobuka kondimana na ngai oyo nasalaki ná bango.+

  • Basambisi 2:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe bayokelaki ata basambisi na bango te, basalaki nde pite+ na banzambe mosusu+ mpe bagumbamelaki bango. Balongwaki nokinoki na nzela oyo bankɔkɔ na bango batambolaki, baoyo batosaki mitindo ya Yehova.+ Bango basalaki bongo te.

  • Basambisi 8:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Mpe esalemaki boye: ntango kaka Gideone akufaki, bana ya Yisraele basalaki lisusu pite na Babaala,+ mpe bakómisaki Baala-berite nzambe na bango.+

  • Yirimia 3:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpe asalaki bondumba mpo na ezaleli na ye ya kozanga kopesa nzoto kilo, mpe azalaki kaka kokómisa mokili mbindo+ mpe kosala ekobo na mabanga mpe na banzete;+

  • Ezekiele 6:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpe ya solo, bato na bino oyo bakobika bakokanisa ngai lisusu na kati ya bikólo epai bamemaki bango bakangami,+ mpamba te nayoki mpasi mpo na motema na bango ya pite etiki ngai+ mpe mpo miso na bango oyo ezali kolanda bikeko na bango ya bosɔtɔ mpo na kosala pite;+ mpe bakoyoka mpenza mpii oyo ekomonana na bilongi na bango mpo na makambo mabe oyo basali na makambo na bango nyonso oyo eyinamá.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto