Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 34:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 noki osala kondimana ná bato oyo bafandi na mokili yango, mpo ya solo mpenza bakosala pite na banzambe na bango+ mpe bakopesa mbeka epai ya banzambe na bango,+ mpe ya solo moto moko akobenga yo, mpe okolya mpenza ndambo ya mbeka na ye.+

  • Basambisi 2:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe bayokelaki ata basambisi na bango te, basalaki nde pite+ na banzambe mosusu+ mpe bagumbamelaki bango. Balongwaki nokinoki na nzela oyo bankɔkɔ na bango batambolaki, baoyo batosaki mitindo ya Yehova.+ Bango basalaki bongo te.

  • Nzembo 106:37
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 37 Mpe bazalaki kokaba bana na bango ya mibali+

      Mpe bana na bango ya basi mbeka epai ya bademo.+

  • Nzembo 106:39
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 39 Mpe bakómaki mbindo mpo na misala na bango+

      Mpe bazalaki se kosala pite na misala na bango.+

  • Yirimia 3:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Balobaka boye: “Soki mobali moko alongoli mwasi na ye mpe mwasi yango akei mpenza, atiki ye mpe akómi mwasi ya mobali mosusu, mobali yango akozongela ye lisusu?”+

      Mokili yango ekómi mbindo te?+

      “Mpe yo osali bondumba na baninga ebele;+ bongo okozongela ngai lisusu?”+ yango nde liloba ya Yehova.

  • Ezekiele 16:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 “‘Kasi obandaki kotyela kitoko na yo motema+ mpe okómaki ndumba mpo na nkombo na yo+ mpe obandaki kosopela moleki-nzela nyonso misala na yo ya bondumba;+ kitoko yango ekómaki ya ye.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto