14 Na nsima, mokonzi abalusaki elongi na ye, atali bato, mpe abandaki kopambola+ lisangá mobimba ya Yisraele, wana lisangá mobimba ya Yisraele batɛlɛmaki.
27 Nsukansuka, banganga-nzambe, Balevi, batɛlɛmaki mpe bapambolaki+ bato; mpe mongongo na bango eyokamaki, bongo libondeli na bango ekómaki na esika na ye mosantu, na likoló.+