Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 12:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Na nsima alongwaki kuna akei na etúká ya ngombangomba na ɛsti ya Betele+ mpe atɛlɛmisaki hema na ye: Betele na wɛsti mpe Ai+ na ɛsti. Bongo atongelaki Yehova etumbelo+ kuna mpe abandaki kobelela nkombo ya Yehova.+

  • Ebandeli 27:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Na bongo, ayaki pene mpe apwɛpwaki ye, mpe ayokaki nsolo ya bilamba na ye.+ Mpe abandaki kopambola ye mpe koloba ete:

      “Talá, nsolo ya mwana na ngai ezali lokola nsolo ya zamba oyo Yehova apamboli.

  • Ebandeli 28:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Bongo Yakobo alamukaki na mpɔngi na ye mpe alobaki ete: “Ya solo, Yehova azali na esika oyo, mpe ngai nayebaki yango te.”

  • 2 Samwele 7:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpe ekólo nini na mabele ezali lokola bato na yo Yisraele,+ oyo Nzambe akendaki kosikola mpo na ye moko, mpo bázala bato na ye,+ mpo amipesa nkombo+ mpe asalela bango makambo minene mpe ya nsɔmɔ:+ kobengana bikólo ná banzambe na bango mpo na bato na yo, oyo osikolaki+ mpo na yo moko longwa na Ezipito?

  • Nzembo 9:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Yehova ayebani mpo na ekateli ya lisambisi oyo azwi.+

      Moto mabe akangami na motambo oyo asalaki na mabɔkɔ na ye moko.+

      Higayone. Sela.

  • Yisaya 52:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpo na yango nde bato na ngai bakoyeba nkombo na ngai,+ ɛɛ mpo na yango, na mokolo yango, mpamba te nazali Moto oyo azali koloba.+ Talá! Ezali ngai.”

  • Yirimia 16:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 “Bongo talá nazali kosala ete bango báyeba; na ntango yango nakosala ete bango báyeba lobɔkɔ na ngai mpe nguya na ngai,+ mpe bakoyeba mpenza ete nkombo na ngai ezali Yehova.”+

  • Yirimia 32:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 yo nde otyaki bilembo mpe makamwisi na mokili ya Ezipito tii na mokolo ya lelo mpe na Yisraele mpe na kati ya bato,+ mpo omisalela nkombo ya lokumu, lokola na mokolo ya lelo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto