Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 9:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpamba te, na mbala oyo, nazali kotindela motema na yo mpe basaleli na yo mpe bato na yo malɔzi na ngai nyonso, mpo oyeba ete mosusu azali te lokola ngai na mabele mobimba.+

  • Kobima 15:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Nani kati na banzambe azali lokola yo, Ee Yehova?+

      Nani azali lokola yo, yo oyo oleki bosantu?+

      Ye oyo basengeli kobanga+ na nzembo ya lisanzoli,+ Ye oyo asalaka makambo ya kokamwa.+

  • 2 Samwele 7:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Yango wana ozali mpenza monene,+ Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso; mpo mosusu lokola yo azali te,+ mpe Nzambe mosusu azali te, kaka yo+ na baoyo nyonso toyoká na matoi na biso.

  • Nzembo 83:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpo báyeba+ ete yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova,+

      Yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló+ na mabele mobimba.+

  • Nzembo 86:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  8 Ee Yehova, moko te azali lokola yo na kati ya banzambe,+

      Mpe mosala moko te ezali lokola misala na yo.+

  • Yisaya 46:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Bókanisa lisusu makambo ya liboso ya kalakala,+ ete nazali Nzambe+ mpe Nzambe mosusu azali te,+ mosusu oyo azali lokola ngai mpe azali te;+

  • Yirimia 10:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Ee Yehova, moko te azali lokola yo.+ Ozali monene, mpe nkombo na yo ezali monene kati na nguya.+

  • Baroma 9:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpo Likomami elobi na Farao ete: “Natiki yo ozala mpo na ntina oyo mpenza: mpo na nzela na yo nalakisa nguya na ngai, mpe mpo nkombo na ngai esakolama na mabele mobimba.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto