Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nehemia 4:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Ntango namonaki ete bazali kobanga, na mbala moko natɛlɛmaki mpe nalobaki na bato ya lokumu+ mpe na bayangeli-basungi+ mpe na bato mosusu ete: “Bóbanga bango te.+ Bókanisa Yehova Ye oyo azali monene+ mpe nsɔmɔ;+ mpe bóbundela bandeko na bino,+ bana na bino ya mibali mpe bana na bino ya basi, basi na bino mpe bandako na bino.”

  • Nehemia 9:32
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 32 “Mpe sikoyo, Ee Nzambe na biso, Nzambe monene,+ ya nguya+ mpe ya nsɔmɔ,+ yo oyo obatelaka kondimana+ mpe motema boboto,+ kotika te ete bampasi nyonso oyo ezwi biso,+ bakonzi+ na biso, bankumu+ na biso, banganga-nzambe+ na biso, basakoli+ na biso, bankɔkɔ+ na biso ná bato na yo nyonso banda na mikolo ya bakonzi ya Asiri tii na mokolo ya lelo,+ emonana eloko moke liboso na yo.+

  • Nzembo 48:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 48 Yehova azali monene mpe asengeli kosanzolama mingi+

      Na engumba ya Nzambe na biso,+ na ngomba na ye mosantu.+

  • Nzembo 145:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Yehova azali monene mpe asengeli kosanzolama mingi,+

      Mpe bonene na ye ekoki kososolama te.+

  • Yirimia 32:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Yo nde omonisaka motema boboto epai ya bato nkóto nkóto,+ mpe ofutaka libunga ya batata na ntolo ya bana na bango nsima na bango,+ Nzambe ya solo, Yo nde ozali monene,+ Yo nde ozali na nguya,+ Yehova ya mampinga+ nde nkombo na ye,+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto