Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 9:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe Yehova akosala mpenza bokeseni kati na bibwɛlɛ ya Yisraele mpe bibwɛlɛ ya Ezipito, mpe ata eloko moko te kati na biloko nyonso ya bana ya Yisraele ekokufa.”’”+

  • Kobima 10:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Baoyo bazalaki komona baoyo te, mpe moko te kati na bango alongwaki na esika na ye na boumeli ya mikolo misato; kasi mpo na bana nyonso ya Yisraele pole ezalaki na bisika na bango ya kofanda.+

  • Kobima 11:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Kasi mbwa ekongalela moto ata moko te kati na bana ya Yisraele, banda na moto tii na nyama;+ mpo bóyeba ete Yehova akoki kosala bokeseni kati na Baezipito mpe bana ya Yisraele.’+

  • Kobima 12:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe makila esengeli kozala elembo na bino likoló ya bandako epai bozali; mpe nasengeli komona makila mpe koleka likoló na bino,+ mpe bolɔzi yango ekoyela bino te mpo na kobebisa bino ntango nakobɛta mokili ya Ezipito.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto