Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 8:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Mpe na mokolo yango nakokómisa mpenza mokili ya Goshene, epai bato na ngai bazali kofanda, ndenge mosusu, mpo kuna lipokopoko ata moko ekozala te;+ mpo oyeba ete nazali Yehova na katikati ya mabele.+

  • Kobima 10:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Baoyo bazalaki komona baoyo te, mpe moko te kati na bango alongwaki na esika na ye na boumeli ya mikolo misato; kasi mpo na bana nyonso ya Yisraele pole ezalaki na bisika na bango ya kofanda.+

  • Kobima 11:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Kasi mbwa ekongalela moto ata moko te kati na bana ya Yisraele, banda na moto tii na nyama;+ mpo bóyeba ete Yehova akoki kosala bokeseni kati na Baezipito mpe bana ya Yisraele.’+

  • Kobima 12:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe makila esengeli kozala elembo na bino likoló ya bandako epai bozali; mpe nasengeli komona makila mpe koleka likoló na bino,+ mpe bolɔzi yango ekoyela bino te mpo na kobebisa bino ntango nakobɛta mokili ya Ezipito.

  • Yisaya 65:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Na yango talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Talá! Basaleli na ngai bakolya,+ kasi bino bokozala na nzala.+ Talá! Basaleli na ngai bakomɛla,+ kasi bino bokozala na mposa ya mai.+ Talá! Basaleli na ngai bakosepela,+ kasi bino bokozala na nsɔni.+

  • Malaki 3:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe ya solo, bokomona lisusu bokeseni kati na moyengebene ná moto mabe,+ kati na moto oyo asalelaka Nzambe ná moto oyo asaleli ye te.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto