-
1 Samwele 17:46Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
46 Na mokolo ya lelo, Yehova akokaba yo na lobɔkɔ na ngai,+ mpe nakoboma yo mpenza mpe nakolongola yo motó; mpe na mokolo ya lelo, nakopesa bibembe ya kaa ya Bafilistia na bandɛkɛ ya likoló mpe na banyama ya zamba oyo ezali na mabele;+ mpe bato ya mabele mobimba bakoyeba ete ezali na Nzambe moko, oyo azali Nzambe ya Yisraele.+
-
-
1 Bakonzi 20:28Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
28 Bongo moto ya Nzambe ya solo+ apusanaki penepene mpe alobaki na mokonzi ya Yisraele, ɛɛ, alobaki boye: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Lokola bato ya Siri balobi ete: “Yehova azali Nzambe moko ya bangomba, mpe azali Nzambe ya mabwaku ya patatalu te,” nakopesa mpenza ebele ya bato oyo na lobɔkɔ na yo,+ mpe bino bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”+
-