10 Mpamba te, toyokaki ndenge Yehova akaukisaki mai ya Mbu Motane liboso na bino ntango bobimaki na Ezipito,+ mpe makambo bosalaki bakonzi mibale ya Baamore oyo bazalaki na ngámbo mosusu ya Yordani, elingi koloba: Sihone+ ná Oge,+ oyo bobomaki.+
11 Mpe okabolaki+ mbu liboso na bango, bongo bakatisaki na kati ya mbu na mabele oyo ekauki;+ mpe obwakaki bato oyo bazalaki kolanda bango na bozindo+ lokola libanga+ na mai ya makasi.+
17 Mpo Likomami elobi na Farao ete: “Natiki yo ozala mpo na ntina oyo mpenza: mpo na nzela na yo nalakisa nguya na ngai, mpe mpo nkombo na ngai esakolama na mabele mobimba.”+