Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 21:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Nsukansuka, bato bayaki epai ya Moize mpe balobaki ete: “Tosali lisumu,+ mpamba te tolobi mabe mpo na Yehova mpe mpo na yo. Bondelá Yehova ete alongwela biso banyoka.”+ Mpe Moize abondelaki Yehova mpo na bato.+

  • 1 Samwele 8:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Bongo Yehova alobaki na Samwele boye:+ “Yoká mongongo ya bato oyo na makambo nyonso oyo bazali koloba na yo;+ mpamba te baboyi yo te, kasi baboyi nde ngai nazala mokonzi+ na bango.

  • Yisaya 32:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 mpo zoba akoloba makambo ya bozoba,+ mpe motema na ye ekokana kosala makambo oyo eyokisaka mpasi,+ mpo na kopɛngwa+ mpe kolobela Yehova makambo ya bokosi, mpo na kotika molimo ya moto oyo azali na nzala libumu polele,+ mpe azali kotika moto oyo azali na mposa ya mai azanga eloko ya komɛla.

  • Luka 10:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 “Moto oyo ayoki+ bino ayoki mpe ngai. Mpe moto oyo atyoli bino atyoli mpe ngai. Mpe moto oyo atyoli ngai atyoli+ mpe moto oyo atindaki ngai.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto